Lakisá makambo oyo ezali na kati

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Nazalaki kosepela mingi na masano ya bitumba”

“Nazalaki kosepela mingi na masano ya bitumba”
  • Abotamá na: 1962

  • Ekólo: États-Unis

  • Bomoi na ye ya kala: Amipesaki na masano ya bitumba

NDENGE NAZALAKI

 Nazokisaki moninga na ngai ntango tozalaki kosala masano ya bitumba mpe mpota yango ezalaki monene mpenza na ndenge oyo nakanisaki te. Nabɛtaki ye lokolo na zolo kozanga ete nakana. Namonaki lokola namemi ngambo mpe nabandaki komituna soki nasengelaki kokoba kosala masano ya bitumba. Mpo na nini libunga oyo etindaki ngai namituna soki nasengelaki kokoba kosala masano oyo nazalaki kolinga mpe nasalaki yango na molende na boumeli ya bambula mingi? Ya liboso, tiká nayebisa bino ndenge nini nakɔtaki na masano ya bitumba.

 Nakolá pene na Buffalo, na etúká ya New York, na États-Unis, na libota ya kimya mpe oyo emipesá na lingomba ya Katolike. Natángaki na biteyelo ya Katolike mpe nazalaki kosalisa basango na misa. Baboti na ngai balingaki ete ngai ná yaya na ngai ya mwasi tózala na bomoi ya malamu. Yango wana, batikaki ngai nasalaka masano nsima ya ngonga ya kelasi to kosala mosala mpo na mwa ntango, yango esalaki ete nazwa banɔti ya malamu na kelasi mpe nakóma komipesa disiplini ntango nazalaki naino elenge.

 Ntango nazalaki na mbula 17, nabandaki koyekola masano ya bitumba. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki kosala masano ngonga 3 na mokolo, mikolo 6 na pɔsɔ. Pɔsɔ nyonso, nazalaki mpe kolekisa ngonga mingi na koyekola mayele mpe bamuvema ndenge na ndenge mpe kotala bavideo mpo nakolisa makoki na ngai. Nazalaki kosepela kosala ngalasisi ntango bakangi ngai bilamba na miso, ata ntango nazalaki kosalela bibundeli. Nazalaki na likoki ya kopanza batablo to kobuka babriki na ebundeli oyo ezalaki na lobɔkɔ na ngai. Nakómaki moto oyo ayebi mpenza kosalela bibundeli yango mpe nazwaki mbano mingi na masano yango. Masano ya bitumba ekómaki eloko ya ntina mingi na bomoi na ngai.

 Nakanisaki ete nalongaki na bomoi. Nazwaki diplome mpe lokumu monene na iniversite. Nakómaki kosala lokola ingénieur na makambo ya ordinatɛrɛ na kompanyi moko monene. Nazalaki kosepela na biloko oyo kompanyi yango ezalaki kopesa ngai, ndako oyo nazalaki na yango mpe makango na ngai. Bato bazalaki komona lokola nazalaki na esengo mpenza, kasi nazalaki na esengo te mpo nazalaki na mituna ya ntina mingi oyo nazwaki biyano na yango te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI

 Mpo na kozwa biyano na mituna na ngai, nabandaki kokende na eglize mbala mibale na pɔsɔ mpe kobondela Nzambe asalisa ngai. Mokolo moko, tobɛtaki lisolo na moninga moko mpe lisolo yango ebongolaki bomoi na ngai. Natunaki ye boye: “Osí omituná mpo na nini tozali awa na mabele?” Mpe nalobaki lisusu: “Ezali na mikakatano mingi mpe makambo ya kozanga bosembo etondi mingi mpenza!” Ayebisaki ngai ete ye mpe azalaki komituna mituna yango mpe azwaki biyano ya kokitisa motema na Biblia. Apesaki ngai buku moko oyo motó ya likambo na yango elobi Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. a Ayebisaki ngai ete azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nazalaki naino kokakatana mpo nazalaki kokanisa ete nasengeli te kotánga mikanda oyo euti na lingomba mosusu. Kasi, mposa na ngai ya kozwa biyano na mituna na ngai etindaki ngai naluka koyeba soki makambo oyo Batatoli ya Yehova bazalaki koteya ezalaki solo.

 Nakamwaki mpenza ntango nayebaki makambo oyo Biblia eteyaka mpenza. Nayekolaki ete na ebandeli mokano ya Nzambe ezalaki ete bato báfanda na paradiso awa na mabele mpe ete mokano yango ebongwanaki te. (Ebandeli 1:28) Nakamwaki komona nkombo ya Nzambe, Yehova, na Biblia na ngai moko libongoli ya King James Version mpe nayebaki ete yango ezalaki nkombo oyo nazalaki kosalela ntango nazalaki kosala mbala na mbala libondeli ya Nkolo. (Nzembo 83:18; Matai 6:9) Lisusu, nayaki koyeba ntina oyo Nzambe atiki bato bányokwama mpo na mwa ntango. Nakangaki ntina ya makambo nyonso oyo nayekolaki! Nasepelaki mingi mpenza.

 Nakobosana soki moke te ndenge namiyokaki ntango nakendaki na makita ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso. Moto nyonso azalaki na esengo mpe alingaki koyeba nkombo na ngai. Mbala na ngai ya liboso oyo nakendaki na makita, nalandaki diskur moko ya sipesiale oyo elobelaki mabondeli oyo Nzambe ayokaka. Motó ya likambo yango ebendaki likebi na ngai, mpo nazalaki kobondela Nzambe mpo asalisa ngai. Mbala na ngai ya mibale ya koyangana na makita, ezalaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Na makita wana nyonso, nakamwaki komona ata bana mike bazalaki kolanda na Biblia na bango moko bavɛrsɛ oyo bazalaki kotánga. Nayebaki naino te ndenge ya kozwa bavɛrsɛ na Biblia, kasi Batatoli ya Yehova basalisaki ngai mpe bateyaki ngai ndenge ya kosalela Biblia.

 Wana nazalaki kokende mbala na mbala na makita, nakómaki kosepela na mateya kitoko oyo Batatoli ya Yehova bazalaki koteya. Nazalaki koyekola makambo mingi na makita nyonso, mpe ntango nyonso nazalaki kolendisama mpe kobɔndisama. Na nsima, basɛngaki báyekola na ngai Biblia.

 Makambo oyo namonaki epai ya Batatoli ya Yehova ekesanaki mpenza na oyo nazalaki komona na lingomba na ngai. Namonaki ete Batatoli ya Yehova bazali na bomoko mpe bazali bato ya sembo oyo basalaka makasi mpo na kosepelisa Nzambe. Nandimaki mpenza ete bamonisaki elembo oyo emonisaka bakristo ya solo, elingi koloba, balinganaka kati na bango.​—Yoane 13:35.

 Wana nazalaki kokoba koyekola Biblia, nabongolaki makambo mingi na bomoi mpo nayokanisa yango na mibeko ya Biblia. Nakanisaki ete nakokoka te kotika masano ya bitumba. Nazalaki kosepela kosala ngalasisi mpe kobunda na basusu. Ntango nayebisaki Motatoli ya Yehova oyo azalaki koyekola na ngai Biblia likambo yango, na boboto nyonso, akitisaki ngai motema, ayebisaki ngai boye: “Kobá naino koyekola, mpe nayebi ete okozwa ekateli ya malamu.” Yango nde nazalaki na mposa ya koyoka. Wana nazalaki kokoba koyekola, nazalaki kokóma lisusu na mposa makasi ya kosepelisa Yehova Nzambe.

 Likambo oyo nabosanaka te na bomoi na ngai ezali likambo oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, nazokisaki moninga na ngai moko mpe mpota yango ezalaki monene koleka ndenge nazalaki kokanisa. Likambo yango esalaki ete nakanisa na mozindo soki nakoki kozala moyekoli ya Kristo oyo azali na kimya wana nakobi kosala masano ya bitumba. Nayekolaki ete Yisaya 2:3, 4 esakolaki ete baoyo batosaka malako ya Yehova “bakoyekola mpe etumba lisusu te.” Lisusu, Yesu ateyaki basusu bázala te bato ya mobulu, ata soki bato bazali kosalela bango makambo na bosembo te. (Matai 26:52) Yango wana, natikaki masano oyo nazalaki kolinga mingi mpenza.

 Nsima na yango, nalandaki toli ya Biblia ya ‘kosala makasi nakóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.’ (1 Timote 4:7) Ntango nyonso oyo nazalaki kolekisa na masano ya bitumba mpe milende oyo nazalaki kosala na masano yango, nakómaki sikoyo kosalela yango na makambo ya elimo. Makango na ngai asepelaki te na makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia, yango wana nakataki boyokani ná ye. Nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova na mokolo ya 24/01/1987. Mwa moke na nsima, nabandaki mosala ya ntango nyonso mpo na koteya basusu Biblia. Banda wana, nakobaki na mosala ya ntango nyonso, nazali sikoyo kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York, na États-Unis.

MATOMBA OYO NAZWI

 Sikoyo lokola nayebi solo etali Nzambe, nazwi eloko oyo nazalaki kozanga na bomoi na ngai. Namiyokaka lisusu te lokola nazangi eloko. Kutu, nazali na bomoi oyo ezali na ntina mpe elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya mpe nazali na esengo ya solosolo. Nasepelaka kosala ngalasisi mbala na mbala, kasi ngalasisi ya nzoto ezali lisusu na ntina mingi te mpo na ngai. Likambo oyo eleki ntina mpo na ngai ezali kosalela Yehova Nzambe.

 Ntango nazalaki kosala masano ya bitumba, nazalaki ntango nyonso kozala ekɛngɛ na bato oyo bazalaki zingazinga na ngai mpe mbala nyonso nazalaki kokanisa ndenge ya komibatela soki moto abundisi ngai. Lelo oyo, nazali kokoba kozala ekɛngɛ na baoyo bazali zingazinga na ngai, kasi mpo na ntina mosusu, kosalisa bango. Biblia esalisi ngai nakóma mokabi mpe mobali malamu epai ya Brenda, mwasi na ngai oyo nalingaka mingi.

 Nazalaki kolinga mingi masano ya bitumba. Kasi, na esika ya masano ya bitumba nazwaki eloko eleki malamu. Biblia elobi polele ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke; kasi ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali na litomba na makambo nyonso, mpo yango ezali na elaka ya bomoi ya lelo mpe ya bomoi ya mikolo oyo ezali koya.”​—1 Timote 4:8.

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova kasi lelo ebimisamaka lisusu te.