Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya

Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya

 Okanisaka ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya? Bato mingi bakanisaka ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya atako bazali kokutana na makambo ya mpasi lelo oyo. Kasi tokoki mpenza kondima ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya? Ɛɛ! Biblia epesi biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya.

 Elikya nini Biblia epesi?

 Biblia emonisi ete bato bazali kokutana na mikakatano mingi mpenza. Kasi, elaki ete mikakatano yango ekotikala seko te. Tótalela mwa bandakisa ya sikisiki.

  •   Mokakatano: Kozanga ndako

     Oyo Biblia elobi: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna.”​—Yisaya 65:21.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Bato bakosepela na bandako na bango.

  •   Mokakatano: Kozanga mosala mpe bobola

     Oyo Biblia elobi: “Bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:22.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Bato nyonso bakozala na mosala ya malamu, bakosepela na yango mpe bakozwa mbano na mosala yango.

  •   Mokakatano: Kozanga bosembo

     Oyo Biblia elobi: “Bankumu bakoyangela mpo na bosembo.”​—Yisaya 32:1.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Kozanga bosembo mpo na loposo, bozwi to bobola ekozala lisusu te. Bakosalela moto nyonso makambo na bosembo.

  •   Mokakatano: Kolya malamu te mpe nzala

     Oyo Biblia elobi: “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Moto nyonso akozala na likoki ya kozwa bilei ya kitoko. Moto moko te akonyokwama mpo na nzala to kozanga kolya malamu.

  •   Mokakatano: Koboma mpe mobulu

     Oyo Biblia elobi: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”​—Mika 4:4.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Moto nyonso akozala na kimya mpe akomiyoka ete amibateli mpo bato ya maladi bakozala lisusu te, mpe “bayengebene bakozwa mabele.”​—Nzembo 37:10, 29.

  •   Mokakatano: Bitumba

     Oyo Biblia elobi: “Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.”​—Yisaya 2:4.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Kimya ekozala na mabele mobimba. (Nzembo 72:7) Moto moko te akozala na mposa ya kosala matanga mpo na moto oyo abomami na etumba to akokima mpo na komibatela na esika mosusu mpo na bitumba.

  •   Mokakatano: Maladi to bokɔnɔ

     Oyo Biblia elobi: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Bato bakonyokwama lisusu te mpo na maladi to bakobɛla lisusu te. (Yisaya 35:5, 6) Biblia elaki ete “liwa ekozala lisusu te.”​—Emoniseli 21:4.

  •   Mokakatano: Kobebisama ya mai, zamba mpe bongo na bongo

     Oyo Biblia elobi: “Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

     Oyo elimboli mpo na mikolo ezali koya: Mabele mobimba ekokóma paradiso mpo bato báfanda wana, ndenge Nzambe akanaki na ebandeli.​—Ebandeli 2:15; Yisaya 45:18.

 Ezali mpenza na ntina tóndima ete elikya oyo Biblia epesi biso ekokokisama mpenza?

 Mbala mosusu okanisaka ete ekokokisama te, kokanisa bongo ezali na yango mabe te. Kasi, tozali kolendisa yo otalela makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na mikolo oyo ezali koya. Mpo na nini? Mpo bilaka oyo ezali na Biblia ekeseni na bilaka mpe bisakweli oyo bato bapesaka. Nzambe nde apesi bilaka oyo ezali na Biblia. Talá makambo oyo esali ete bilaka ya Nzambe ekesana na bilaka ya bato:

  •   Esengeli kotyela Nzambe motema. Mpamba Biblia elobi ete Nzambe “akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Lisusu, kaka Nzambe nde azali na likoki ya koyebisa makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. (Yisaya 46:10) Biblia etondi na bandakisa oyo emonisi ete makambo oyo Nzambe asakolaki ekokisamaka ntango nyonso. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo?

  •   Nzambe azali na nguya ya kosilisa mikakatano na biso. Biblia elobi ete Nzambe azali na nguya ya kosala ‘eloko nyonso oyo asepelaka kosala, asalaka yango.’ (Nzembo 135:5, 6) Na maloba mosusu, eloko moko te ekoki kopekisa Nzambe akokisa bilaka na ye. Lisusu, Nzambe azalaka na mposa ya kosalisa biso mpo alingaka biso.​—Yoane 3:16.

 Mbala mosusu okoki komituna boye: ‘Soki Nzambe alingi kosalisa biso mpe azali na nguya ya kosalisa biso, mpo na nini tozali kokutana na mikakatano?’ Mpo na kozwa eyano na motuna yango, talá video Mpona nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

 Ndenge nini elikya oyo Biblia epesi biso ekokokisama?

 Nzambe akosalela Bokonzi na ye, oyo ezali guvɛrnema ya likoló, mpo na kokokisa bilaka na ye. Atyá Yesu Kristo Mokonzi ya Bokonzi yango, mpe apesá ye bokonzi mpo na kobatela mabele mpe bato. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abikisaki bato ya maladi, aleisaki bato ya nzala, atɛlɛmisaki mopɛpɛ mpe asekwisaki bakufi. (Marko 4:39; 6:41-44; Luka 4:40; Yoane 11:43, 44) Na yango, amonisaki makambo oyo akosala ntango akozala Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.

 Talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini? mpo na koyeba lisusu mingi mapamboli nini okozwa na Bokonzi ya Nzambe.

 Ntango nini elikya yango ekokokisama?

 Mosika te! Nini nde endimisi biso ete ekokokisama? Biblia esakolaki makambo oyo ekomonisa ete Bokonzi ya Nzambe etikali moke ebanda koyangela mabele. (Luka 21:10, 11) Makambo oyo ezali kosalema lelo oyo eyokani na makambo oyo Biblia esakolaki.

 Mpo na koyeba makambo mingi, tángá lisolo “Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele?

 Ndenge nini elikya oyo Biblia epesi biso ekoki kosalisa yo lelo oyo?

 Mokomi moko ya Biblia akokanisaki elikya oyo Biblia epesi na “longo mpo na molimo.” (Baebre 6:19) Kaka ndenge longo esalisaka masuwa etengatenga te na mopɛpɛ makasi, elikya ya solosolo oyo Biblia epesi biso mpo na mikolo ezali koya ekoki kosalisa biso ata soki tozali kokutana na mikakatano lelo oyo. Elikya na biso ekoki kobatela biso na mayoki mpe makanisi ya mabe, mpe ekoki kobatela ata sante na biso.​—1 Batesaloniki 5:8.