Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BÓSƐNZƐLAKA!

Bamilio ya bato bazali kokima Ukraine

Bamilio ya bato bazali kokima Ukraine

 Russie ebandaki kobundisa Ukraine na mokolo ya 24/02/2022. Yango ebimiseli bamilio ya bato mpasi mingi mpenza mpe bomoi na bango ekómi na likama. Yango wana mingi na bango bazali kokima Ukraine na lombangu mpenza. a

 “Babɔmbi ezalaki kokwea bipai na bipai. Ezalaki nsɔmɔ mpenza! Ntango toyokaki ete ba-train ekoya kozwa bato, biso mpe tomonaki malamu tókima. Totikaki biloko nyonso, mpo moto mokomoko asengelaki komema kaka mwa valize ya moke. Tozwaki kaka mikanda na biso ya ntina, mwa bankisi ya komɛla, mai, mpe mwa biloko ya mikemike ya kolya. Totikaki biloko nyonso mpe tokendaki na esika bazwaka train wana babɔmbi ezalaki kokwea.”​—Nataliia, na Kharkiv, Ukraine.

 “Tozalaki kokanisa te ete bitumba ekosalema mpenza. Nayokaki babɔmbi ezali kokwea na bisika mosusu ya ville na biso, mpe bafɛnɛtrɛ ezalaki koningana. Namonaki malamu nakima. Namemaki kaka biloko ya ntina mpenza. Nalongwaki ndako na 8h00, nazwaki train mpo na kokende na ville ya Lviv mpe kuna nazwaki motuka tii na Pologne.”​—Nadija, na Kharkiv, Ukraine.

Na lisolo oyo tokolobela

 Makambo nini mpenza esalaka ete bato bákima mboka na bango?

 Bato bakómi kokima Ukraine mpo Russie ezali kobundisa ekólo na bango. Kasi Biblia emonisi mpenza bantina ya solosolo oyo esalaka ete bato bákima bamboka na bango:

  •   Baguvɛrnema ya bato na mokili mobimba elongi te kosilisa bampasi ya bato. Mbala mingi baoyo bazali koyangela basalelaka bokonzi na bango mpo na konyokola bato.​—Mosakoli 4:1; 8:9.

  •   Satana Zabolo,mokonzi ya mokili oyo,” azali kotinda bato ya mokili mobimba básala makambo ya mabe. Yango wana Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”​—Yoane 14:30; 1 Yoane 5:19.

  •   Longola bampasi oyo tokutanaka na yango banda kala, tozali mpe na mikolo ya nsuka; Biblia esakolaki ete “ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Likambo ya mawa, makambo oyo esalaka ete bato bákima bamboka na bango, na ndakisa: bitumba, makama oyo ebimaka yango moko, nzala mpe maladi mabe, ezali kosalema na mikolo yango ya nsuka.​—Luka 21:10, 11.

 Epai wapi baoyo bakimá mboka bakoki kozwa elikya?

 Biblia emonisi ete Yehova, b Mozalisi na biso, azali Nzambe oyo alingaka bato oyo bakimá mboka mpe ayokelaka bango mawa. (Kolimbola Mibeko 10:18) Alaki ete akosilisa bampasi nyonso ya bato oyo bakimá mboka na nzela ya guvɛrnema na ye ya likoló oyo ekolongola baguvɛrnema nyonso ya bato. Babengaka guvɛrnema yango Bokonzi ya Nzambe. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na koboma Satana Zabolo. (Baroma 16:20) Bokonzi yango ekoyangela mokili mobimba. Lokola bandelo oyo ekesenisaka bikólo ekozala te, bokabwani oyo bato bazali na yango lelo ekozala mpe te. Na mokili mobimba bato nyonso bakokóma libota moko. Moto moko te akokima mboka na ye mpo Biblia elaki ete: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango; mpo monɔkɔ mpenza ya Yehova ya mampinga elobi yango.”​—Mika 4:4.

 Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mpenza likambo etali kokima mboka oyo tozali komona lelo. Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na kosilisa makambo oyo etindaka bato bákima bamboka na bango. Talá mwa makambo oyo akosala:

 Biblia ekoki mpenza kosalisa bato oyo bakimá mboka?

 Ɛɛ. Atako Biblia epesi bato oyo bakimá mboka elikya mpo na mikolo ezali koya, eyebisi bango mpe oyo bakoki kosala mpo na kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango lelo oyo.

 Toli ya Biblia: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—Masese 14:15.

 Elakisi nini? Luká koyeba makama oyo okoki kokutana na yango mpe ndenge oyo okoki komibatela. Kebá na bato mabe oyo balukaka kolyela bato oyo bakimá mboka mpo bayebi ete bato yango babatelami malamu te, mpe bayebi te ndenge makambo esalemaka na esika oyo bakómi kofanda.

 Toli ya Biblia: “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

 Elakisi nini? Kotyá makanisi nyonso te na biloko ya mosuni. Soki ozali kosepela na biloko ya ntina oyo ozali na yango, okozala na esengo.

 Toli ya Biblia: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.”​—Matai 7:12.

 Elakisi nini? Zalá na boboto mpe na motema molai. Bizaleli yango ekosala ete bato ya mboka oyo okómi kofanda básepela na yo.

 Toli ya Biblia: “Bózongisela moto mabe na mabe te.”​—Baroma 12:17.

 Elakisi nini? Kotika te nkanda etinda yo ozongisa mabe na mabe ntango bazali konyokola yo. Kozongisa mabe na mabe ebongisaka makambo te.

 Toli ya Biblia: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Bafilipi 4:13.

 Elakisi nini? Tyá Nzambe na esika ya liboso na bomoi na yo mpe bóndeláká. Akoki kosalisa yo olonga mikakatano na yo.

 Toli ya Biblia: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​—Bafilipi 4:6, 7.

 Elakisi nini? Sɛngá Nzambe apesa yo kimya ya makanisi mpe ya motema ata soki okutani na likambo nini. Talá lisolo “Bafilipi 4:6, 7​​—‘Bómitungisa ata na likambo moko te.’”

a Na mokolo ya mibale oyo ekólo Russie ebandaki kobundisa Ukraine, Ebongiseli ya ONU mpo na bato oyo bakimá mboka (UNHCR) elobaki ete esengeli kotalela likambo yango na lombangu mpo bato mingi bakokima mboka na ndenge oyo esalemá naino te. Kaka na mikolo 12 mpamba, bato koleka milio mibale balongwaki Ukraine mpo na kokima na bikólo ya pembeni mpe milio moko ya bato bakimaki na ba-ville mosusu ya Ukraine.

b Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?