Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Comstock Images/Stockbyte via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Okopona nani azala mokambi na yo?​—Biblia elobi nini?

Okopona nani azala mokambi na yo?​—Biblia elobi nini?

 Na mwa bapɔsɔ oyo ekoya, maponami ekosalema na bamboka mingi na mokili mobimba. Bato bakozwa ekateli moko ya ntina mingi ya kopona soki nani akozala mokambi na bango.

 Biblia elobi nini?

Makoki ya bakambi ya mokili ezali na ndelo

 Biblia emonisi polele ete makoki ya bakambi nyonso ya mokili oyo ezali na ndelo.

  •   “Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te. Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.”​—Nzembo 146:3, 4.

 Ata bakambi oyo bazali na makoki mingi mpenza nsukansuka bakokufa. Lisusu, bazali na likoki te ya kosala ete moto oyo akoya nsima akokoba kosala misala na bango ya malamu.​—Mosakoli 2:18, 19.

 Likambo ya solo ezali ete, Biblia emonisi ete bato bakelamaki te mpo bámiyangela bango moko.

  •   “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”​—Yirimia 10:23.

 Ezali na mokambi moko oyo akoki kotambwisa makambo malamu lelo oyo?

Mokambi oyo Nzambe andimi

 Biblia emonisi ete Nzambe aponi mokambi moko oyo aleki bakambi nyonso mpe oyo abongi kotyelama motema: Yesu Kristo. (Nzembo 2:6) Yesu azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe; guvɛrnema oyo ezali koyangela uta na likoló.​—Matai 6:10.

 Okondima kopona Yesu azala mokambi na yo? Biblia emonisi mpo na nini ezali na ntina kopona Yesu. Elobi:

  •   “Bópwɛpwa mwana [Yesu Kristo], mpo Ye asilika te noki bókufa mpe bólongwa na nzela, mpo nkanda na ye epelaka noki. Esengo na baoyo nyonso bazali kokima epai na ye.”​—Nzembo 2:12.

 Sikoyo nde ntango ya kopona. Esakweli ya Biblia emonisi ete Yesu abandaki koyangela na likoló na 1914, mpe mosika te Bokonzi ya Nzambe ekolongola baguvɛrnema nyonso ya bato.​—Danyele 2:44.

 Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali ndenge oyo okoki kopesa boyengeli ya Yesu mabɔkɔ, tángá lisolo “Osengeli koluka liboso Bokonzi ya Nzambe lelo oyo!