Lakisá makambo oyo ezali na kati

Liteya ya Trinité ezali na Biblia?

Liteya ya Trinité ezali na Biblia?

Eyano ya Biblia

 Mangomba mingi ya bokristo eteyaka ete Nzambe azali Trinité, to Bosato. Nzokande, yoká ndenge buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi: “Kondimana ya Kala etángi liloba Trinité te, Kondimana ya Sika mpe elobeli yango te . . . Liteya yango ekómaki kokɔta mokemoke na boumeli ya bambula mpe bato bazalaki kobimisela yango makanisi ndenge na ndenge.”

 Nzokande, Nzambe oyo Biblia elobeli azali na kati ya bapersona misato to na kati ya Trinité te. Kutu, talá bavɛrsɛ oyo ya Biblia:

 “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.”​—Kolimbola Mibeko 6:4.

 “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18.

 “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

 “Nzambe azali kaka ye moko.”​—Bagalatia 3:20.

 Bongo mpo na nini mangomba mingi ya bokristo eteyaka ete Nzambe azali Trinité to Bosato?