Lakisá makambo oyo ezali na kati

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Mpo na nini koboya kolanda bavedɛti?​—Eteni 1: Mpo na bana basi

Mpo na nini koboya kolanda bavedɛti?​—Eteni 1: Mpo na bana basi

 Bavedɛti oyo balakisaka na TV bazalaka ndenge nini?

 Talá etanda wana na nse, mpe yanolá na mituna.

Molɔngɔ 1

Molɔngɔ 2

Akolá te

Akɔmɛlá

Motó makasi

Moto ya botosi

Mwasi ya ndumba

Bizaleli malamu

Motó likolólikoló

Azali mayele

Moto ya bilobaloba

Abatelaka lolemo

Mayele mabe

Moto ya sembo

  1.   Maloba nini emonisi malamu bizaleli ya bilenge basi oyo otalaka na bafilme, na TV mpe na bazulunalo?

  2.   Maloba nini okolinga ete bato básalela mpo na kolobela bizaleli na yo?

 Na ntembe te, biyano oyo opesi na motuna ya liboso euti na molɔngɔ 1 mpe biyano oyo opesi na motuna ya mibale euti na molɔngɔ 2. Soki ezali bongo, yango emonisi ete olingi te kozala lokola bilenge oyo bazali bavedɛti, mpe ozali yo moko te! Mpo na nini tolobi bongo?

 “Na bafilme, mbala mingi elenge mwasi azalaka motó makasi mpe matata. Ebimisaka biso nyonso lokola bato oyo babongi kotyelama motema te, mpe oyo batalaka kaka bomoto na bango.”​—Erin.

 “Bilenge basi oyo balakisaka na TV mpe na bafilme balingaka bato nyonso bátala kaka bango, bamipesaka na kobongisa nzoto, kolata, koyebana, mpe kozwa mibali.”​—Natalie.

 “Ezali mpasi omona vɛdɛti oyo amɛlaka masanga te, oyo alalaka na mibali te, mpe oyo atombokelaka baboti na ye te. Soki asalaka makambo wana te, bamonisaka ye lokola moto akangamá na losambo to ya makambo makasi.”​—Maria.

 Omituna boye: ‘Molato na ngai, bizaleli na ngai, mpe ndenge na ngai ya koloba emonisaka mpenza soki nazali nani, to nalandaka kaka bavedɛti oyo namonaka na TV to na bafilme?’

 Oyo osengeli koyeba

  •   Bilenge mingi bakanisaka ete balandaka moto te, nzokande balandaka bavedɛti oyo balakisaka na TV to na bazulunalo. Elenge mwasi moko na nkombo Karen alobi boye: “Namonaka yango epai ya leki na ngai ya mwasi. Alobaka ete akipaka eloko mosusu te, kaka bilamba mpe mibali. Nzokande azali mayele mpe nayebi ete ezali na makambo mosusu oyo esepelisaka ye. Kasi azali kosala makambo lokola moto azangi mayele mpo akanisi ete kaka yango nde ekosala ete bana basi mosusu bándima ye. Azali na mbula 12 mpamba!”

     Biblia elobi: “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo.”​—Baroma 12:2.

  •   Bilenge nyonso te nde balandaka makambo ya bilenge oyo balakisaka na TV. Alexis, oyo azali na mbula 15, alobi boye: “Na bafilme, bilenge basi bakipaka kaka makambo na bango moko, bazalaka mayele te, mpe basalaka makambo lokola bana mike. Kasi namoni ete mingi kati na biso tozalaka na makanisi malamu. Tokanisaka makambo mosusu ya bomoi na esika ya kolekisa mokolo mobimba na kolɔta mwana mobali moko ya kitoko.”

     Biblia elobi: ‘Makoki ya kososola ya bato oyo bakɔmɛli, . . . lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.’​—Baebre 5:14.

  •   Bavedɛti basalisaka nde bato oyo basalaka bapiblisite; basalisaka bilenge basi te. Lokola eyebani ete bazulunalo oyo elobeli bilenge, bilamba, baaparɛyi mpe masano ya sika ebimisaka benefisi mingi, bakompanyi minene oyo esalaka biloko yango elukaka kobenda bilenge liboso bákokisa mbula 13. Buku moko (12 Going on 29) elobi: “Bato oyo basalaka bapiblisite bayebisaka bana oyo bakokisi naino mbula 13 te ete soki bazangi bilamba, babiju, biloko ya kobongisa elongi, mpe baaparɛyi oyo ebimi sika, bakoyebana te. Bana yango batalaka bapiblisite oyo elakisaka ndenge ya kobenda mibali, liboso kutu báyeba soki kobenda mibali elakisi nini.”

     Biblia elobi: “Eloko nyonso oyo ezali na mokili​—mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela—​euti na Tata te, kasi euti na mokili.”​—1 Yoane 2:16.

 Kanisá naino: Nani akozwa matomba soki ozali kokanisa kaka kosomba modɛlɛ ya elamba moko ya mikolo oyo? Nani akozwa matomba soki olingi kaka kosomba telefone oyo ebimi sika kaka mpo baninga na yo bámona yo? Bato oyo basalaka bapiblisite balukaka nde bolamu na yo, to oyo ya bango moko?

 Oyo okoki kosala

  •   Yekolá koboya makambo mosusu ya bavedɛti oyo balakisaka na bafilme. Ntango ozali kokola, okoyeba komona ata makambo oyo ezali komonana na miso te. Kanisá malamu ndenge makambo ya bavedɛti ya bafilme ekoki kobongola bizaleli na yo. Alana, oyo azali na mbula 14, alobi boye: “Na bafilme, okomona biloko ya kobongisa elongi oyo elenge mwasi atye ezali komonana koleka bilamba oyo alati, mpe bilenge mingi bayebaka te ete yango ebimisaka bango kitoko te; balukaka nde kobenda likebi ya bato.”

  •   Salá makasi okóma moto oyo olingi mpenza kokóma. Na ndakisa, kanisá lisusu bizaleli ya malamu oyo oponaki na ebandeli ya lisolo oyo, oyo okolinga bato báyeba yo na yango. Mpo na nini te kobanda koyekola komonisa bizaleli yango sikoyo? Biblia elobi boye: “Bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika na kolanda elilingi ya Oyo azalisaki yango”​—kasi te na kolanda elilingi oyo bato ya piblisite balakisaka.​—Bakolose 3:10.

  •   Luká bandakisa ya malamu. Okoki komona bandakisa yango mosusu na libota na yo, epai ya mama, mama-leki, to tata-mwasi. Ekoki mpe kozala epai ya baninga na yo oyo bakɔmɛli. Batatoli ya Yehova basepelaka mpo na masangá na bango, ezali na basi mingi oyo bazali ndakisa malamu.​—Tito 2:3-5.

 Likanisi: Tángá buku Mekolá kondima na bango mpo na oyeba basi ya bizaleli malamu oyo Biblia elobeli, na ndakisa, Ruta, Hana, Abigaile, Estere, Maria, mpe Marta. Buku Mekolá kondima na bango ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na www.pr418.com.