Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mibeko Zomi ya Nzambe ezali nini?

Mibeko Zomi ya Nzambe ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Mibeko Zomi ezali mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele. Babengaka mibeko yango mpe Maloba Zomi, oyo ezali libongoli ya liloba na liloba ya maloba ya Ebre ʽasèrèth haddevarim. Maloba yango ezali na bisika misato na Pantatɛkɛ (Torah), mikanda mitano ya liboso ya Biblia. (Kobima 34:28; Kolimbola Mibeko 4:13; 10:4) Maloba yango na Grɛki déka (zomi) logous (maloba), nde ebimisá ebengeli “Décalogue.”

 Nzambe akomaki Mibeko Zomi yango na bitanda mibale ya mabanga mpe apesaki yango Moize, mosakoli na ye na Ngomba Sinai. (Kobima 24:12-18) Mibeko Zomi yango ezali na Kobima 20:1-17 mpe Kolimbola Mibeko 5:6-21.

 Liste ya Mibeko Zomi

  1.   Sambelá kaka Yehova Nzambe.​—Kobima 20:3.

  2.   Kosambela bikeko te.​—Kobima 20:4-6.

  3.   Kozwa nkombo ya Nzambe na lisɛki te.​—Kobima 20:7.

  4.   Batelá Sabata.​—Kobima 20:8-11.

  5.   Kumisá baboti na yo.​—Kobima 20:12.

  6.   Koboma moto te.​—Kobima 20:13.

  7.   Kosala ekobo te.​—Kobima 20:14.

  8.   Koyiba te.​—Kobima 20:15.

  9.   Kozala motatoli ya lokuta te.​—Kobima 20:16.

  10.   Kolula te.​—Kobima 20:17.

 Mpo na nini baliste yango ekeseni?

 Biblia etye Mibeko yango na liste te. Yango wana, bato bazali na makanisi ekeseni mpo na ndenge oyo Mibeko yango esengeli kolandana. Ndenge Mibeko yango elandani na liste oyo ezali awa na likoló, yango nde bato mingi bayebi. Kasi, bato mosusu basalaka liste yango ndenge mosusu. Bokeseni yango etaleli esika batye mobeko ya liboso, ya mibale mpe ya nsuka. a

 Mpo na nini Nzambe apesaki Mibeko Zomi?

 Mibeko Zomi ezalaki na kati ya Mibeko ya Moize. Mibeko yango ezalaki na masɛngami koleka 600 mpe ezalaki lokola boyokani to kondimana oyo Nzambe asalaki elongo na ekólo Yisraele. (Kobima 34:27) Nzambe alobaki na bango ete makambo na bango ekotambola malamu soki batosi Mibeko ya Moize. (Kolimbola Mibeko 28:1-14) Kasi, ntina ya libosoliboso ya Mibeko yango ezalaki mpo na kobongisa Bayisraele mpo na Masiya oyo alakamaki to Kristo.​—Bagalatia 3:24.

 Bakristo basengeli kotosa Mibeko Zomi?

 Te. Nzambe apesaki Mibeko na ye, ata mpe Mibeko Zomi mpenzampenza nde mpo na ekólo Yisraele. (Kolimbola Mibeko 5:2, 3; Nzembo 147:19, 20) Bakristo bazali na nse ya Mibeko ya Moize te, ata Bayuda oyo bakómaki bakristo ‘balongwaki na Mibeko.’ (Baroma 7:6) b “Mobeko ya Kristo” nde ezwaki esika ya Mibeko ya Moize. Mobeko yango esangisi makambo nyonso oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye básala.​—Bagalatia 6:2; Matai 28:19, 20.

 Mibeko Zomi ezali na ntina lelo oyo?

 Ɛɛ. Lokola Mibeko Zomi emonisaka ndenge Nzambe akanisaka, koyekola yango ekoki komemela biso matomba. (2 Timote 3:16, 17) Mibeko Zomi esimbami na mitinda oyo ebongi kotyelama motema mpe oyo ekosila ngala ata mokolo moko te. (Nzembo 111:7, 8) Kutu, mingi ya mitinda yango nde esimbi mateya oyo ezali na Testama ya Sika, ndenge bato mingi babengaka eteni wana ya Biblia.​—Talá “ Mitinda ya Mibeko Zomi oyo ezongelami na Testama ya Sika.”

 Yesu ateyaki ete Mibeko nyonso ya Moize, ata mpe Mibeko Zomi esimbami na mibeko mibale ya libosoliboso. Alobaki boye: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Mibeko nyonso mpe Basakoli esimbami na mibeko oyo mibale.” (Matai 22:34-40) Atako basɛngi bakristo te ete bátosa Mibeko ya Moize, basɛngi bango bálinga Nzambe mpe baninga na bango bato.​—Yoane 13:34; 1 Yoane 4:20, 21.

  Mitinda ya Mibeko Zomi oyo ezongelami na Testama ya Sika

Etinda

Bavɛrsɛ yango na Testama ya Sika

Sambelá kaka Yehova Nzambe

Emoniseli 22:8, 9

Kosambela bikeko te

1 Bakorinti 10:14

Kumisá nkombo ya Nzambe

Matai 6:9

Sambelá Nzambe mbala na mbala

Baebre 10:24, 25

Kumisá baboti na yo

Baefese 6:1, 2

Koboma moto te

1 Yoane 3:15

Kosala ekobo te

Baebre 13:4

Koyiba te

Baefese 4:28

Kopesa litatoli ya lokuta te

Baefese 4:25

Kolula te

Luka 12:15

a Mpo na Bayuda, “Kobima 20 vɛrsɛ 2 nde ezali ‘liloba’ to mobeko ya liboso mpe vɛrsɛ 3 tii vɛrsɛ 6 ezali mobeko ya mibale.” (The Jewish Encyclopedia) Kasi bato ya Katolike batalelaka Kobima mokapo 20, vɛrsɛ 1 tii vɛrsɛ 6 ete ezali mobeko kaka moko. Boye, mobeko etali kozwa nkombo ya Nzambe na lisɛki ekómi mobeko ya mibale. Mpo Mibeko yango etikala kaka zomi, bakabolá mobeko etali kolula mwasi ya moninga mpe biloko na ye na mibeko mibale.

b Baroma 7:7 esaleli mobeko ya zomi lokola ndakisa ya “mibeko,” mpe yango emonisi ete Mibeko Zomi ezalaki mpe na kati ya Mibeko ya Moize.