Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Kobongola programɛ ya liyangani ya etúká ya 2020 ‘Bosepelaka ntango nyonso’!

Kobongola programɛ ya liyangani ya etúká ya 2020 ‘Bosepelaka ntango nyonso’!

Mwa 10, Sanza ya 7/2020

 Na sanza ya 7 mpe ya 8/2020, mpo na mbala ya liboso, bandeko ya mokili mobimba bakotala liyangani ya etúká kaka moko na eleko moko. Mpo likambo yango esalema, esengelaki kobongola programɛ mobimba ya liyangani yango na minɔkɔ koleka 500. Na momeseno, mosala ya ndenge wana ezwaka mbula moko to koleka mpo na kobongola mpe kokotisa mingongo mpo na badiskur na bavideo nyonso. Kasi mpo na bambongwana oyo esalemi mpo na maladi mabe ya coronavirus, Babongoli ya liyangani ya etúká ya 2020 oyo ezalaki na moto ya likambo ‘Bosepelaka ntango nyonso’! basengelaki kosilisa mosala wana nyonso na nse ya basanza minei mpamba.

 Badepartema ya kobongola mpe ya kosomba biloko na mokili mobimba, oyo ezali na biro monene ya batatoli ya Yehova, epesaki maboko mpo na kokokisa mosala monene wana. Bandeko ya Departema ya kobongola bamonaki ete bituluku mingi ya babongoli na mokili mobimba basengelaki kobakisa baaparɛyi mpo na kokokisa mosala yango, mingimingi bamikro ya malamu mpenza. Departema ya kosomba biloko ezwaki bibongiseli mpo na kosomba bamikro 1 000 mpe batindaki yango na bisika koleka 200.

 Mpo na kosalela mbongo malamu, bamikro esombamaki ebele na mbala moko, bamemaki yango na esika oyo bakabolaki yango mpo etindama na bisika mingi na mabele mobimba. Lokola tosombaki bamikro ebele, mokomoko esombamaki na ntalo ya dolare 170, sangisa mpe mbongo oyo ebimaki mpo ekoma esika ya mosala. Yango ezalaki mbongo moke koleka soki tosombaki yango na mokomoko.

 Bandeko ya Departema ya kosomba biloko basengelaki kosomba mpe kotinda biloko yango na boumeli ya basanza ya 5 mpe ya 6/2020. Nzokande, mpo na maladi mabe ya coronavirus, bakompanyi mingi ezalaki kosala te na ndenge oyo basalaka liboso. Atako bongo, na nsuka ya sanza ya 5, bituluku mingi ya kobongola, bafiliale mpe bisika oyo mosala esengelaki kosalema bazwaki bisaleli oyo basengelaki na yango.

 Jay swinney, mokɛngɛli ya departema ya kosomba biloko na mokili mobima, alobi: “Boyokani malamu ezalaki kati na betele ná bato oyo batɛkaka bisaleli yango mpo na kosala mosala yango ekoba kokende liboso.” Abakisi, “Kaka elimo santu ya Yehova nde esalisaki biso tósala mosala wana na lombangu mpe tósalela mbongo na ndenge ya malamu mpo na kosunga bandeko bakokisa mosala na bango malamu.”

 Nicholas Ahladis, oyo asalaka na departema ya kobongola, alobi: “Babongoli oyo bazalaki kobima lisusu te balendisamaki mpenza ntango bazwaki bisaleli yango. Atako bazalaki lisusu esika moko te na bandeko ya bituluku na bango ya kobongola, basalaki elongo mpo na kokotisa mingongo mpe kobongola badiskur, bafilme, mpe banzembo na minɔkɔ koleka 500.”

 Mosala oyo ezali kaka moko ya misala ebele oyo esalemaki mpo na kobimisa liyangani ya etúká ya 2020 ‘Bosepelaka ntango nyonso’! mpo na bandeko ya mabele mobimba. Makabo na bino oyo bopesaka na nzela ya donate.pr418.com mpe na balolenge mosusu esalaki ete bisaleli ya malamu esombama mpo mosala yango esalema.