Lakisá makambo oyo ezali na kati

14/6/2018
ÉTATS-UNIS

Mpiko mpo na kotosa lisosoli esalaki ete tribinale monene ebimisa mobeko oyo eumeli lelo mbula 75

Mpiko mpo na kotosa lisosoli esalaki ete tribinale monene ebimisa mobeko oyo eumeli lelo mbula 75

Ntango baninga ya kelasi bazalaki kopesa drapo ya Amerika losako, Gathie Barnett, oyo azalaki na mbula libwa mpe leki na ye Marie, oyo azalaki na mbula mwambe batɛlɛmaki na limemya nyonso kozanga koloba likambo. Bayebaki te ete kondima oyo bamonisaki ekosala ete tribinale monene etalela likambo yango na 1943. Bilenge basi yango bandimaki mpenza ete basengeli kozala sembo kaka epai ya Nzambe. Bazalaki kati ya ebele ya bilenge Batatoli ya Yehova oyo batosaki lisosoli na bango ya bokristo.​—Misala 5:29.

Lokola Gathie ná Marie baboyaki na mpiko nyonso kopesa drapo losako, babenganaki bango na eteyelo ya ebandeli na Slip Hill, na wɛsti ya Virginie. Tata na bango akobaki kolandela likambo yango tii amemaki yango na tribinale monene ya États-Unis. Tribinale yango ekataki likambo yango na mokolo ya 14/06/1943, mpe elobaki ete biteyelo esengeli te kotinda bana na makasi bápesa drapo losako, mpe emonisaki polele ete Batatoli ya Yehova “batosaka ezala drapo to ekólo.” Ekateli oyo tribinale ezwaki na likambo ya Barnette na wɛsti ya Virginie, ekweisaki ekateli oyo ezwamaki mbula misato liboso na likambo ya Gobitis na etúká ya Minersville, oyo esɛngaki bana-kelasi bápesaka drapo losako. a

Zuzi Robert Jackson, ntango azalaki kokoma likanisi oyo bazuzi ebele bandimaki, amonisaki polele boye: “Likambo ya ntina mingi na Mobeko likonzí ya États-Unis oyo ebongwanaka ata moke te ezali ete mokonzi moko te ya guvɛrnema ezala azali na lokumu ya ndenge nini, azali na lotomo te ya kotinda bato bákanisa boye to boye na likambo etali politiki to makambo ya ekólo, ya lingomba to makambo oyo ekosɛnga moto apesa makanisi. Mpe moto moko te asengeli kotinda bato na makasi báloba to básala likambo moko oyo ekomonana lokola guvɛrnema nde ezali kotinda bato básala.”

Atako ekateli yango ezalaki libosoliboso mpo na litomba ya bana ya Batatoli ya Yehova, Andrew Koppelman, profesɛrɛ ya makambo etali mibeko na iniversite ya Northwestern, alobi boye: “Bato ya Amerika oyo bazwaka na valɛrɛ ntomo ya basivile basengeli kopesa Batatoli ya Yehova matɔndi mingi, mpo bayikaki mpiko na minyoko makasi mpo na kobundela bonsomi oyo biso nyonso basivile tozali na yango lelo.”

Ekateli yango ebongolaki makambo mosusu na mibeko ya États-Unis. Philip Brumley, avoka na biro monene ya Batatoli ya Yehova, alobi boye: “Ekateli oyo ezwamaki na likambo ya Barnette esalaki mpe ete batribinale minene ya bamboka mosusu lokola, Argentine, Canada, Costa Rica, Ghana, Inde, Philippines, Rwanda mpe Tribinale monene ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto elobela mpe elanda likanisi ya ekateli yango.”

Na 2006, babengisaki Gathie ná Marie elongo na bato mosusu ya mayele oyo bayebani mingi na likita oyo esalemaki na Centre Robert Jackson na New York mpo na kolobela likambo oyo ekómelaki bango. Marie alobaki boye: “Nazali mpenza na esengo mpo esalisaki bana-kelasi oyo batángaki nsima na biso.” Gathie abakisaki boye: “Nazali koyeba lisusu ntango mwana na ngai ya mobali batindaki ye na biro ya mokambi ya eteyelo mpo aboyaki kopesa drapo losako. Ntango mokambi ayaki na biro alobaki: ‘Namoni ete molakisi na bino abosani ekateli oyo Tribinale monene ezwaki.’”

Gathie amonisaki ndenge Batatoli ya Yehova nyonso bamiyokaka; alobaki boye: “Tomemyaka drapo mpe oyo yango emonisaka. Tomonaka mabe moko te mpo na drapo. Kasi tondimaka te ete ebongi kosambela to kopesa yango losako.”​—1 Yoane 5:21.

a Bakomi-makambo na tribinale bakomaki mabe nkombo ya Gobitas mpe Barnett.