Lakisá makambo oyo ezali na kati

Aleksandr ná Anna Solovyev

5/7/2019
RUSSIE

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Aleksandr Solovyev na likambo

Tribinale ya Russie ekweisi ndeko Aleksandr Solovyev na likambo

Na mokolo ya 04/07/2019, tribinale ya etúká Ordzhonikidzevskiy na engumba Perm na Russie ekweisaki ndeko Aleksandr Solovyev na likambo mpe bakatelaki ye amande ya dolare 4 731.

Bakangaki na bolɔkɔ ndeko Solovyev na mpokwa ya mokolo ya 22/05/2018, na gare, wana azalaki kozonga uta mboka mopaya elongo na mwasi na ye, Anna. Bakonzi ya polisi batyaki ndeko Solovyev minɔti na mabɔkɔ mpe bakɔtisaki ye na bolɔkɔ mpo na mwa ntango. Bapolisi bamemaki ndeko mwasi Solovyev na motuka mosusu mpe mobali na ye na motuka mosusu. Bakonzi balukalukaki na apartema na bango butu mobimba​—bamemaki bafɔtɔ, baaparɛyi mpe ebele ya Biblia.

Nsima ya kotunatuna ye mwa mituna, batikaki ndeko mwasi Solovyev mpe bakweisaki ye te na likambo. Kasi, bafundaki libosoliboso ndeko Solovyev na likambo, mpe na mokolo ya 24/05/2018, batyaki ye na bolɔkɔ tii na mokolo ya 19/11/2018. Wana azali kozela básambisa ye, batyelaki ye mindelo na makambo oyo akoki kosala mpe bisika akoki kokende.

Baavoka ya ndeko Solovyev bakomema likambo yango na tribinale. Mpe basɛngaki na etuluku ya bato ya ONU oyo elandelaka likambo ya kokanga bato mpamba etalela likambo yango.

Lokola bazali kokoba konyokola bandeko na biso na Russie mpe bikólo mosusu, tozali kotika banguna na biso ‘bábangisa biso na likambo ata moko te.’ Tondimi ete Yehova akokoba kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko tii mokolo na ye monene ya lobiko ekoya.​—Bafilipi 1:28