Lakisá makambo oyo ezali na kati

19/7/2019
DANEMARK

Likambo moko ya esengo na ebongiseli ya Yehova: Kobimisama ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Islandais

Likambo moko ya esengo na ebongiseli ya Yehova: Kobimisama ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Islandais

Na mokolo ya 19/07/2019, ndeko Stephen Lett ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alakisaki na esengo nyonso Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ Islandais na liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi oyo esalemaki na Copenhague, na Danemark.

Na ntɔngɔ ya mokolo ya mitano ya liyangani, prezida ya liyangani asɛngaki baoyo nyonso balobaka monɔkɔ ya Islandais básangana esika moko mpo na mwa likita na ntango ya bopemi. Na mwa likita yango ya ntina, ndeko Lett alakisaki Biblia na bandeko 341 oyo bazalaki wana.

Eleki basiɛklɛ mingi, bato ya Islande basalaki mosala makasi mpo na kobongola Biblia na monɔkɔ na bango. Na 1540, Oddur Gottskálksson abimisaki Libongoli ya liboso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Islandais. Kobanda 2010, bandeko na biso oyo balobaka monɔkɔ ya Islandais bazali kosalela Biblia ya siɛklɛ ya 21, oyo ebimisamaki na Compagnie Biblique Islandaise. Sikoyo, bandeko oyo balobaka monɔkɔ ya Islandais bazali na mposa makasi ya kosalela libongoli ya sika oyo mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato koleka 300 000 oyo balobaka monɔkɔ yango.

Ndeko moko oyo azalaki na ekipi ya babongoli, alobi boye: “Kobongola Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Islandais ezwaki mbula soki minei mobimba. Eloko oyo esali ete libongoli yango ekokana na mosusu te ezali ete bazongisi esika nyonso oyo nkombo ya Yehova ezalaki na Makomami. Yango eyokani na libondeli ya Yesu oyo ezali na Yoane 17:26: ‘Mpe nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.’”

Tozali na botɔndi mingi mpo Yehova azali kokoba kosalisa biso tósakola nsango malamu na mokili mobimba. Mosala ya kobongola Biblia esalisi biso tókokisa mokumba yango. Tozali kobondela mpo ebele ya bato básepela lisusu koyekola “makambo minene ya Nzambe” wana bazali kotánga na monɔkɔ na bango ya mitema Liloba na ye.​—Misala 2:11.