Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nsima ya kobukana ya mabele oyo esalemaki na Natonin, Province oyo ezali na ngomba

14/08/2019
PHILIPPINES

Mbula makasi ebɛtaki na Philippines

Mbula makasi ebɛtaki na Philippines

Na ebandeli ya sanza ya 08/2019, mbula makasi mpe mopɛpɛ makasi ebɛtaki na Philippines, etondisaki mai mpe pɔtɔpɔtɔ. Likambo ya mawa, ndeko moko oyo azalaki mobongisi-nzela monene mpo na mwa ntango akufaki ntango mabele ebukanaki na Natonin, Etúká oyo ezali na ngomba. Ndeko mosusu, oyo azali mpe mobongisi-nzela monene mpo na mwa ntango, azokaki mwa moke ntango mabele yango ebukanaki. Na likama mosusu oyo esalemaki, elenge mobali moko ya mbula 10 azokaki na biloko oyo ebukanaki kasi azwaki lisalisi ya monganga oyo ebongi.

Ata ndako moko te ya bandeko na biso ebebaki makasi. Kasi, Ndako ya Bokonzi moko na Negros Occidental ebebaki mwa moke na mopɛpɛ makasi oyo esalaki ete eteni moko ya plafɔ ekwea.

Filiale ya Philippines mpe bakɛngɛli ya zongazonga bazali kolendisa mpe kobɔndisa mabota ya bandeko na biso oyo bazwi makama.

Tozali na mawa koyoka nsango wana mabe mpe tozali kobondela mpo na baoyo liwa ya ndeko na biso wana epesi bango mpasi na motema. Tozali kozela na mposa makasi mokolo oyo makambo nyonso ya mpasi “ekokanisama lisusu te.”​—Yisaya 65:17.