Lakisá makambo oyo ezali na kati

05/09/2019
ÉTATS-UNIS

Mopɛpɛ makasi babengi Dorian ebɛti na Bahamas

Mopɛpɛ makasi babengi Dorian ebɛti na Bahamas

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Dorian, ezali moko ya mipɛpɛ oyo eleki makasi na Mbu ya Atlantike, ebukaki makasi mabele na esanga ya Great Abaco na nɔrdi ya Bahamas na mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, mokolo ya 01/09/2019. Dorian ezali mopɛpɛ moko mabe mpenza, mingimingi mpo eyaka malɛmbɛmalɛmbɛ, etindikaka mopɛpɛ mpe mbula ya makasi. Mopɛpɛ yango ebɛtaki na bisanga ya Leeward, na Porto Rico, mpe na bisanga ya Virginie, kasi ebebisaki mpenza te bisanga yango.

Filiale ya États-Unis ezali kokoba kolandela makambo mpo na koyeba soki bandeko na biso bazwi likama na mopɛpɛ yango mpe bandako mosusu ya ebongiseli ya Yehova. Tii sikoyo, ata ndeko moko te toyoki ete azokaki na likama yango na kati ya basakoli 46 oyo bazali na masangá mibale oyo ezali na esanga ya Great Abaco. Kasi kaka Ndako ya Bokonzi moko ya esanga yango nde ebukanaki.

Na esanga ya Grand Bahama, ezali na masangá minei mpe basakoli 364. Balapolo ya liboso emonisi ete bandeko 196 na kati ya bandeko na biso batikaki bandako na bango mpo na kokende kofanda bisika mosusu mpe ndako 22 ebebaki makasi. Ndako misato ebukanaki mpenza.

Liboso likama yango ebima, Filiale epesaki malako epai ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu na bisika oyo mopɛpɛ yango ebɛtaki. Filiale esɛngaki ete bandeko nyonso bákende kofanda na Nassau mboka-mokonzi to na bisika mosusu oyo likama ezali te.

Tozali kobondela mpo na bandeko na biso wana oyo bazali konyokwama mpo na mopɛpɛ wana ya makasi. Toyebi ete Yehova ayebi mikakatano na bango mpe akokoba kopesa bango makasi ya koyika mpiko na ntango wana ya mpasi.​—Nzembo 46:1, 2.