Lakisá makambo oyo ezali na kati

24/02/2020
THAÏLANDE

Kampanye sipesiale na Thaïlande: Ebele mpenza ya bato bayoki nsango malamu

Kampanye sipesiale na Thaïlande: Ebele mpenza ya bato bayoki nsango malamu

Kobanda mokolo ya 01/12/2019 tii mokolo ya 31/01/2020, bandeko basi ná mibali bautaki na bamboka 11, na masangá mpe bituluku ya monɔkɔ ya Thaï, bayaki na Thaïlande mpo na kosakola na kampanye spesiale. Ntina ya kampanye yango ezalaki mpo na kosalisa basakoli soki 4 800 oyo balobaka monɔkɔ ya Thaï mpo na kosakwela bato oyo balobaka monɔkɔ yango na mboka-mokonzi Bangkok mpe zingazinga na yango. Basakoli koleka 600 oyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kosakola, balekisaki ngonga 34 625 na mosala ya kosakola, bakabolaki mikanda 32 718, balakisaki bavideo 6 637, mpe babandaki koyekola Biblia na bato 310.

Oyo ezali kampanye ya mibale na boumeli ya mbula mibale oyo eleki. Nsima ya kampanye ya liboso, oyo ebandaki na sanza ya 12/2018 tii na sanza ya 01/2019, ndeko Plakorn Pestanyee, oyo azali na Komite ya filiale ya Thaïlande, alobi boye: “Motángo ya bato oyo babandaki koyekola Biblia mpe matomba oyo emonanaki elendisaki masangá koleka ndenge tokanisaki.” Lokola kampanye ya liboso elekaki malamu mpenza, yango wana komite ebongisaki kampanye oyo ya mibale.

Na kampanye oyo ya mibale, bandeko mosusu oyo bayaki bazongisaki nsima mobembo na bango ya kozonga epai na bango mpo bákoka kosalisa bato mingi báyeba Yehova. Ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bautaki na Corée, bazwaki bibongiseli ete bátikala na Thaïlande sanza mobimba. Lokola bazwaki bato mingi oyo basepelaki, babakisaki lisusu pɔsɔ mibale. Ndeko mosusu ya mwasi oyo autaki na Corée akomaki mokanda ya kotika mosala na ye ya mosuni mpo na koya kopesa mabɔkɔ na kampanye, mpe azwaki ekateli ya kotikala na Thaïlande.

Milende ya basakoli yango mpo na kampanye oyo ebotaki mpenza mbuma. Batatoli mibale, mama ná mwana na ye ya mwasi, basololaki na mwasi moko na esika na ye ya mosala. Ntango bakutani na ye mbala ya liboso, batikelaki ye Lamuká! No. 2, 2019, oyo ezalaki na motó ya likambo “Mateya motoba oyo bana basengeli koyekola.” Ntango bandeko bazongelaki mwasi yango, apesaki bango mbote na esengo, azalaki kopɛpa zulunalo Lamuká! oyo batikalaki ye mbala eleki. Mwasi yango alobaki boye: “Makambo oyo ezali awa ezali na ntina mingi, nabondeli bino bólakisa ngai makambo mosusu.” Basakoli yango bazwaki bibongiseli báyekola na mwasi yango Biblia mbala moko na pɔsɔ na ntango ya bopemi ya midi na esika na ye ya mosala. Basalisaki ye mpe akɔtisa JW Library na telefone na ye. Na nsima, akómaki koyekola mbala mibale na pɔsɔ mpe alakisaka bana na ye bavideo, na ndakisa video oyo moto azali koyema.

Mosakoli mosusu akutanaki na mwasi moko oyo azalaki kosepela mingi na ndenge Batatoli ya Yehova balataka mpe balinganaka. Mwasi yango alobaki ete atambolá na mangomba ndenge na ndenge mpo na koluka baninga ya solo, kasi azwá ata moko te. Mosakoli yango abengaki ye aya koyangana na likita oyo ekosalema kaka na mokolo wana. Mwasi yango ayaki na makita mpe asepelaki kokutana na bandeko basi mpe mibali ebele, oyo bauti na mimeseno ndenge na ndenge, ezala babola to bazwi. Abandaki koyekola Biblia na mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! mpe asepelaki kokoba koyangana na makita.

Ndeko mwasi moko akutanaki na mwasi moko boye oyo azali na mbula koleka 50 na Bang Na, na kartye moko monene ya Bangkok. Mwasi yango alobaki ete, atako kala azalaki kokende na mangomba ndenge na ndenge, azali na Biblia ya ye moko te. Na yango ndeko mwasi asalisaki ye azwa programɛ JW Library Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika. Ntango basakoli bazongelaki mwasi yango mpo na kosolola na ye, ayebisaki bango ete, azali kotánga Biblia oyo autaki kozwa na JW Library. Bandeko basi oyo bayaki kotala ye, balakisaki ye mituna oyo ezali na lokasa nsuka ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!, mpe batángaki mituna yango mokomoko. Mwasi yango alobaki ete alingi koyeba biyano na mituna nyonso wana. Bandeko basi yango babandaki koyekola na ye Biblia, mpe sikoyo ndeko mwasi moko ya Thaïlande azali kokoba na boyekoli yango. Mwasi yango alobi ete azali kosepela na boyekoli na ye mingi, mpo ezali mbala ya liboso na bomoi na ye ete azala na likoki ya koluka makambo ya Nzambe mpe ya Biblia mpe koyeba yango.

Mokolo moko, ndeko mwasi moko azalaki kosakola ndako na ndako, akutanaki na mobali moko ya Thaïlande oyo abalá mwasi moko moto ya Laos. Ndeko mwasi atunaki bango soki likambo nini eleki ntina na bomoi na bango. Bayanolaki ete “Libota.” Ndeko mwasi yango atalelaki na bango lisolo oyo elobeli libota oyo ezali na mwa buku Nsango oyo euti na Nzambe! Mwasi ná mobali wana bandimaki ete toli yango ezali malamu mingi, mpe basepelaki koyekola Biblia. Mwa moke na nsima, bayanganaki na makita ya lisangá. Balobaki ete basepelaki na makita mpo moto nyonso azalaki na bolingo, mpe bakómaki na mposa ya kokoba koyanganaka na makita.

Makambo oyo tolobeli ná makambo mosusu oyo bandeko bakutanaki na yango na kampanye monene ya kosakola na Thaïlande emonisi ete na mikolo ya nsuka oyo, basaleli ya Yehova bakokoba kozala na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”​—1 Bakorinti 15:58.