Lakisá makambo oyo ezali na kati

19/2/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Biblia ya liboso ya mobimba ebimi na elobeli ya bababa

Biblia ya liboso ya mobimba ebimi na elobeli ya bababa

Na mokolo ya 15/02/2020, ndeko Geoffrey Jackson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, abimisaki buku ya nsuka ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na elobeli ya bababa ya Amerika (ASL). Ezali Biblia ya liboso ya mobimba na elobeli ya bababa na mokili mobimba. Liyebisi monene yango epesamaki na ntango ya bofungoli ya biro ya sika ya kobongola mikanda na elobeli ya bababa (RTO) na Fort Lauderdale, na Floride, na États-Unis. Programɛ yango esalemaki na ndako ya mayangani ya Batatoli ya Yehova na West Palm Beach, na Floride.

Bato koleka 2 500 bayanganaki na programɛ yango, mpe bato mosusu 15 635 balandaki yango mbala moko na video na Bandako ya Bokonzi na Bélize, na Canada, na États-Unis, na Haïti, na République Dominicaine, mpe na Trinité et Tobago, mpe motángo ya bato nyonso oyo balandaki ezalaki bato koleka 18 000.

Ndeko Geoffrey Jackson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azali kotuna ndeko moko mituna na programɛ yango

Nsima ya diskur ya bofungoli, ndeko Jackson ayebisaki ete buku ya nsuka ya Biblia na ASL ebimi. Pene na nsuka ya diskur na ye alobaki boye: “Tolingi koyebisa bino likambo moko​—likambo moko ya ntina mingi. Lokola mokanda ya Yobo ebimi, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mobimba esili . . . Ndenge toyebi, ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ezali etuluku ya liboso ya bato oyo ebimisi Biblia mobimba na ASL. Mpe ntango mosusu, tokoki koloba ete, ezali Biblia ya liboso na elobeli ya bababa na mokili mobimba, mpe yango esalemá naino te.”

Mokanda ya Yobo ezali mokanda ya nsuka oyo tobimisi, mosala ya kobongola Biblia mobimba na ASL esali mbula 15. Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete bábongola Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na ASL na 2004. Nsima ya mbula mibale, mokanda ya Matai ebimaki, mpe Makomami nyonso ya Grɛki ya bokristo ebandaki kobima mokemoke tii na 2010. Esɛngaki mbula 10 mpo na kobongola Makomami ya Ebre.

Atako tozalaki kobimisa Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na ASL ndambondambo, esalisaki bababa mingi mpenza. Isias Eaton, mosakoli moko oyo alandaki programɛ yango, alobi boye: “Ntango natalaki video ya liboso ya Libongoli ya Mokili ya Sika, nakokaki kokanga motema te mpe nabandaki kolela. Ntango nazalaki kotánga Biblia na Anglais, ezalaki kosimba motema na ngai te, kasi ntango nakómaki kotala bavideo ya elobeli ya bababa, nabandaki kolela.”

Biblia yango ebongisi lisusu mosala ya kosakola ya basakoli mingi oyo bazali na masangá ya bababa. David Gonzalez, moko ya babongoli ya ASL na RTO yango alobi boye: “Ezali kosalisa ngai nayeba malamumalamu mateya ya Nzambe, nazala na mpiko mpe nasakola na molende. Liboso tózwa Biblia na ASL, nazalaki kobanga mingi, mpe nazalaki kokanisa ete bato nakokutana na bango na mosala ya kosakola bakotuna ngai mituna ya makasimakasi. Kasi, sikoyo lokola tozali na Biblia ya mobimba na ASL, namibongisi malamu. Nazali kobanga eloko te!”

Ndeko Nicholas Ahladis, oyo akambaka misala ya kobongola na biro monene na Warwick, na New York, alobi boye: “Biblia na ASL ezali ndakisa mpo na elobeli ya bababa na minɔkɔ mosusu. Biteni ya Babiblia ebongolami na minɔkɔ 17 ya bababa, mpe minɔkɔ mosusu ezali naino kobongola.”

Na ntembe te, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya mobimba na ASL ekosalisa bato mingi bápusana penepene na Yehova lokola mitema na bango ekosimbama na Liloba na ye mpo bazali na yango na monɔkɔ na bango moko.​—Misala 2:6.