Lakisá makambo oyo ezali na kati

Apex, mwa ekólo moko ya moke na kati ya Iqaluit ezali na esanga Baffin na Nunavut, Canada

17/04/2020
CANADA

Ekaniseli ya liwa ya Kristo ya mobu 2020 na Canada

Kosala Ekaniseli na nɔrdi mpenza ya mokili

Ekaniseli ya liwa ya Kristo ya mobu 2020 na Canada

Basakoli 27 na Lisangá ya Iqaluit, na bisanga ya Arctique ya Canada, basanganaki na nzela ya video mpo na kosala Ekaniseli. Na kati ya bayekoli ya Biblia 55 oyo bandeko bayekolaka na bango na lisangá wana, 12 balandaki diskur ya Ekaniseli na video mpe basepelaki mingi.

Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na mingi kati na bayekoli yango mpo báya Ekaniseli na Ndako ya Bokonzi, bamosusu bazalaki ata na likoki te ya koya. Bafandaka mpenza mosika mingi na esika lisangá ezali, teritware yango ezali soki na kilomɛtrɛ-karé milio mibale banda na Kimmirut tii na Grise Fiord, teritware ya mosika mpenza ya Canada.

Ndeko Isaac Demeester, oyo azali nkulutu na Lisangá ya Iqaluit alobi ete: “Na mbula oyo, ezalaki mbala ya liboso, bayekoli na biso ya Biblia bálanda Ekaniseli elongo na biso. Moyekoli moko ya Biblia na Grise Fiord abengaki bato mosusu minei bálanda programe ya Ekaniseli na nzela ya video. Na yango, bato mitano na nsuka mpenza ya mokili basanganaki na biso na Ekaniseli.”.

Mikakatano oyo maladi ya coronavirus ebimisi, esalisi bandeko ya Lisangá ya Iqaluit bámona matomba ya koyeba kobongola makambo soki esengeli.

Ndeko mwasi Kathy Burechailo alobi boye: “Tosololaki na bato ya ɛsti ya Arctique na telefone. Tosololaki malamu na bato oyo bazali mosika mpenza na teritware na biso. Bato bazali na bandako na bango mpe bazali mpenza na mposa ya libɔndisi.”

Ndeko mwasi Laura McGregor alobi ete: “Kofanda na esika oyo ezali mpenza mosika makasi na bato mosusu awa na Iqaluit, esalaka biso mpasi na motema mpe enyokolaka biso na makanisi. Mingimingi lokola tozali na mikakatano ya mbongo, mpe toyebi te mikakatano nini mosusu maladi oyo ekomemela biso. Ezali mbala ya liboso tósala limpa ya Ekaniseli na libota na biso. Tolekisaki ntango ya esengo mpenza elongo. Esalisaki biso tómona mpenza ete molulu yango ezalaka ya mindondo te, mpe ezalaki malamu ndenge tokokaki kozwa na pɛtɛɛ nyonso limpa ná vinyo.”

Ndeko Demeester asukisi boye: “Atako coronavirus ekaboli biso na makambo mingi, ezali likambo ya kokamwa komona ndenge na eleko ya Ekaniseli, bandeko ya lisangá na biso bakomaki lisusu kolingana makasi. Ekaniseli ya mbula oyo ebongoli mpenza bomoi!”

Lisangá ya Iqaluit ezali kozela na motema moko kotonga Ndako ya Bokonzi ya bango moko na mikolo ezali koya soki makambo etamboli malamu. Wana bazali kozela, toyebi ete Yehova akopambola milende na bango mpo na kopalanganisa nsango malamu tii na teritware ya mosika na nɔrdi ya Canada​—moko ya bisika oyo eleki mosika awa na mabele!​—Misala 1:8.