Lakisá makambo oyo ezali na kati

14 SANZA YA 08, 2020
LIBAN

Mɔtɔ epanzani na Beyrouth, na Liban

Mɔtɔ epanzani na Beyrouth, na Liban

Mɔtɔ yango ebebisaki libongo moko na Beyrouth, mboka-mokonzi ya Liban, na mokolo ya 14/08/2020. Kopanzana ya mɔtɔ yango ebomaki bato ebele, ezokisaki bato mingi mpe ebebisaki biloko mingi. Bandako mosusu ya bandeko na biso ebebaki. Likambo ya mawa, bandeko na biso mosusu bazokaki makasi, kasi ata ndeko moko te akufi.

Toyebi ete Nzambe na biso, oyo akabaka, akopesa basaleli na ye lisungi oyo bazali na yango mposa.​—2 Samwele 22:3.