Lakisá makambo oyo ezali na kati

3/09/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Liyangani ya etúká ya mobu 2020 ezali liyangani ya liboso oyo bandeko balandi yango na Internet, na TV, mpe na radio na mokili mobimba

Liyangani ya etúká ya mobu 2020 ezali liyangani ya liboso oyo bandeko balandi yango na Internet, na TV, mpe na radio na mokili mobimba

Na sanza ya 07 mpe ya 08 ya mobu 2020, bamilio ya bandeko mpe bato oyo basepelaka na solo, bayanganaki mpo na kolanda liyangani ya etúká ya mobu 2020.

Batatoli ya Yehova bazalaki kozela na esengo mpenza liyangani ya etúká “Bósepelaka ntango nyonso”! Liyangani yango esengelaki kosalema na Bandako ya Mayangani, na bastade mpe na bisika ya kofutela na mikili 240. Mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato oyo basengelaki kokende na liyangani, Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazwaki ekateli ete liyangani yango eleka na Internet, na TV mpe na radio.Yango ezali mbala ya liboso, banda 1897, ete ebongiseli ya Yehova esala liyangani ya ndenge wana.

Ndeko Kenneth Cook, Jr., oyo azali moko ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobi boye: “Ntango tolobaki ete liyangani ya etúká ekosalema te, mokano na biso ezalaki ete tósala liyangani ya monene oyo bandeko na mikili ndenge na ndenge bakolanda yango nzela moko. Toyebaki ete esengeli kobongola programɛ yango na minɔkɔ ebele mpe mosala yango esengelaki kosalema kaka na basanza minei. Mpo na kosala mosala ya ndenge wana, esɛngaka mbula moko to koleka mpo na kobongisa yango mpe kosilisa yango. Tosepelaki makasi mpenza ntango eteni ya liboso ya programɛ esilaki, na mokolo ya 06/07/2020, na minɔkɔ soki 400. Tozali na elikya ete programɛ yango ekozala na minɔkɔ 511!”

Ndeko mwasi moko oyo azali kobɔkɔla bana misato ye moko alobi boye mpo na komonisa bolamu ya programɛ yango oyo balandaki na bandako na bango, alobi: “Atako tozalaki na baninga na biso esika moko te, kasi yango ezalaki malamu mingi mpo na bana. Kolanda programɛ yango biteni mokemoke mpe na ngonga moke esalisaki bana bálanda yango malamu mpenza. Soki balingi kopema, tofini butɔ ya pause. Moto moko te azangaki ata miniti moko. Eteni ya mokolo ya mitano emonisaki ete bana bazali lokola mbanzi oyo esengeli kobwaka yango malamu mpo bázala na bomoi ya esengo na mosala ya Yehova. Programɛ yango esalisaki ngai mpe nasala kaka bongo.”​—Nzembo 127:4.

Ndenge programɛ yango eleki na Internet, TV mpe radio, ebendi likebi ya bapanzi-nsango na mokili mobimba. Na ndakisa, ndeko Robert Hendriks, oyo akambaka Biro ya mosala ya bansango, na États-Unis alobi boye: “Bapanzi-nsango ebele mpenza bakomi ndenge liyangani yango elaki na Internet, TV mpe radio. Masolo bakomaki elimboli ete ebongiseli na biso bazali kosalela mayele ya teknoloji mpo na kolekisa liyangani na Internet, na TV mpe na radio mpe kobatela moto mokomoko.”

Liyangani ya etúká ya mobu 2020 ‘Bósepelaka ntango nyonso!’ ebakisi biso esengo ya komona balolenge oyo Yehova, Molakisi na biso Monene azali kosalela mpo na koteya biso.​—Yisaya 30:20.