Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

SITE JW.ORG

Koluka makambo na monɔkɔ mosusu

Koluka makambo na monɔkɔ mosusu

Soki ozali koyekola monɔkɔ, to olingi kolakisa moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu makambo oyo ezali na jw.org, salelá moko ya mayele oyo elobelami awa na nse mpo na komona makambo oyo ozali koluka na monɔkɔ oyo esepelisi yo.

 Kotya site na monɔkɔ mosusu

Finá na elembo ya Minɔkɔ mpo obimisa liste ya minɔkɔ nyonso oyo ezali na jw.org.

Na lobɔkɔ ya mwasi pene ya monɔkɔ mokomoko, ezali na bilembo oyo elandi:

  • Site internet, to ata mwa ndambo na yango esilá kobongolama na monɔkɔ yango. Finá nkombo ya monɔkɔ yango soki olingi kotya site na monɔkɔ yango.

  • Site ebongolami naino te na monɔkɔ yango, kasi ezali na mikanda oyo okoki kozwa. Finá nkombo ya monɔkɔ yango mpo na komona mikanda oyo ezali.

  • Oyo ezali elobeli ya bababa.

    Soki eteni moko ya jw.org esilá kobongolama na elobeli ya bababa oyo oponi, site jw.org ekokóma na monɔkɔ oyo oponi.

    Soki jw.org ebongolami naino te na elobeli ya bababa oyo oponi, okomona liste ya mikanda oyo ezali na elobeli yango ya bababa.

Lokola minɔkɔ ezali ebele na liste yango, okoki kosala moko ya makambo oyo elandi mpo na koluka monɔkɔ moko noki:

  • Poná monɔkɔ oyo olingaka mingi: Minɔkɔ oyo outi kopona kala mingi te ekomonana na esika ya liboso.

  • Bɛtá nkombo ya monɔkɔ yango: Bɛtá mwa balɛtrɛ ya nkombo ya monɔkɔ yango, ezala ya monɔkɔ oyo olobaka to ya monɔkɔ mosusu. Na ndakisa, soki site ezali na Lingala mpe olingi ekóma na Lifalanse, okoki kobɛta “Français” to “French.” Ntango ozali kobɛta lɛtrɛ mokomoko, okomona liste ekokóma kaka na bankombo oyo eyokani na balɛtrɛ oyo obɛti.

 Kobimisa lokasa moko ya internet na monɔkɔ mosusu

Mayele 1: Salelá mayele oyo mpo na nkasa oyo ezali na liste oyo ezali kofungwama mpe kokangama, oyo pembeni na yango bakomi Tángá na.

Kende na lisolo oyo olingi kotánga to kotindela moto. Na nsima, poná monɔkɔ na liste oyo ezali kofungwama mpe kokangama, oyo pembeni na yango bakomi Tángá na, mpo na kobimisa lisolo na monɔkɔ yango. (Soki monɔkɔ oyo ozali koluka ezali te na liste yango, yango emonisi ete lisolo yango ebimisami naino te na monɔkɔ yango.)

Likanisi: Na liste oyo ezali kofungwama mpe kokangama, oyo pembeni na yango bakomi Tángá na, soki omoni elembo ya écouteurs pembeni ya nkombo ya monɔkɔ moko, yango elingi koloba ete okoki mpe koyoka botángi ya lisolo na monɔkɔ yango.

Soki ofini liste oyo ezali kofungwama mpe kokangama ya Tángá na mpo na kopona monɔkɔ moko, kaka lisolo yango nde ekobima na monɔkɔ oyo oponi. Makambo mosusu ya site ekotikala kaka na monɔkɔ oyo ezalaki na ebandeli.

Mayele 2: Na lisolo oyo ozali kotánga, soki omoni te esika bakomi Tángá na oyo ezali na liste oyo efungwamaka mpe ekangamaka, finá elembo ya Minɔkɔ mpo okómisa site na monɔkɔ oyo osepeli. Soki lisolo oyo ozali kotánga ezali na monɔkɔ oyo oponi, ekobima. Soki ezali te, ekomema yo nde na ebandeli, na monɔkɔ oyo oponi.

 Koluka mokanda na monɔkɔ mosusu

Kende na MIKANDA > BILOKO OYO EZALI. Finá na liste oyo ezali kofungwama mpe kokangama mpo opona monɔkɔ moko, mpe finá butɔ Luká.

Salá moko ya makambo oyo elandi mpo na koluka monɔkɔ moko noki:

  • Poná monɔkɔ oyo olingaka mingi: Minɔkɔ minei oyo outi kopona kala mingi te ekomonana na esika ya liboso.

  • Bɛtá nkombo ya monɔkɔ yango: Bɛtá mwa balɛtrɛ ya nkombo ya monɔkɔ yango, ezala ya monɔkɔ oyo olobaka to ya monɔkɔ mosusu. Na ndakisa, soki site ezali na Lingala mpe olingi ekóma na Lifalanse, okoki kobɛta “Français” to “French.” Ntango ozali kokoma lɛtrɛ mokomoko, okomona liste ekokóma kaka na bankombo oyo eyokani na balɛtrɛ oyo obɛti.

Soki mikanda mingi ezali na monɔkɔ oyo oponi, ntango okokɔta esika bakomi BILOKO OYO EZALI, okomona kaka mwa ndambo na yango. Soki olingi komona mikanda mosusu na monɔkɔ oyo oponi, kende na esika bakomi BABUKU MPE MWA BABUKU to BAZULUNALO.

Soki ata mokanda moko te ya lolenge wana ezali na monɔkɔ oyo oponi, bisika okofina ekomema yo na lolenge ya mikanda oyo ezali.