Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

SITE JW.ORG

Kotinda lisolo, video, to mokanda mosusu

Kotinda lisolo, video, to mokanda mosusu

Okoki kotindela moto lisolo, video to mokanda mosusu oyo ezali na jw.org.

  • Finá na elembo ya Kotinda, na nse ya lisolo to video nyonso mpo na kotindela moto eloko yango.

  • Finá na elembo ya Kotinda, oyo ebimaka elongo na bilembo mosusu na nse ya mikanda ya kozwa na Internet, mpo na kotindela moto mokanda yango.

Fɛnɛtrɛ oyo ekobima ekopesa yo likoki ya kopona makambo mibale:

  • Esika moko oyo ezali na lien ya lokasa oyo olingi kotinda. Zwá lien yango mpe kende kotya yango na email moko to SMS moko oyo olingi kotinda.

  • Esika bakomi Tindá na email. Finá na lien yango mpo obimisa fɛnɛtrɛ ya email ya sika oyo ezali na motó ya likambo ya lisolo to mokanda oyo olingi kotinda, mpe lien oyo moto akofina mpo afungola mokanda to lisolo yango. (Liyebisi: Bakoki kosɛnga yo programɛ nini ya kotinda ba email olingi kosalela.)