Lakisá makambo oyo ezali na kati

11 SANZA YA 6, 2015
AZERBAÏDJAN

Batatoli ya Yehova basɛngi bábimisa bandeko oyo bakangamaki kaka mpamba na bolɔkɔ na Azerbaïdjan

Batatoli ya Yehova basɛngi bábimisa bandeko oyo bakangamaki kaka mpamba na bolɔkɔ na Azerbaïdjan

Batatoli ya Yehova bayebisi bakonzi ya mikili ndenge na ndenge ete Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova bakangami kaka mpamba na bolɔkɔ. Basi yango mibale bakangamaki banda mokolo ya 17/02/2015, ntango tribinale ya etúká ya Sabail ekatelaki bango sanza misato na bolɔkɔ mpo bakabolaki mikanda ya lingomba kozanga ndingisa. Tribinale ebakiselaki bango lisusu sanza mibale.

Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova

Bazali kotalela basi ya kimya lokola bato ya mobulu makasi

Mokolo ya 05/12/2014, bapolisi bakangaki Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova ntango bazalaki kolobela bindimeli na bango epai ya bato oyo bazalaki kofanda na ndako moko molai na Bakou. Batikaki bango nsima ya mwa ngonga, kasi bato oyo bazalaki kosala ankɛtɛ bazalaki ntango nyonso kobenga bango mpo na kotuna bango mituna ebeleebele. Mokolo ya 17/02/2015, bato ya Ministère de la Sécurité nationale (MSN) bamemaki basi yango na mbalakaka mpo básambisa bango na nkuku, mpe mpo báfunda bango ete bazali bato ya mobulu. Mpo na komonisa ntina oyo bakangamaki bongo mpo na mwa ntango, zuzi abengaki bango “bato oyo bazali kotya mobulu na mboka.” Na mbala moko, bato ya MSN bakangaki bango na bolɔkɔ na biro na bango monene. (Talá elilingi na likoló).

Banda ntango wana, bato ya MSN babandaki kolukaluka biloko na bandako na bango, kobɔtɔla mikanda ya lingomba, mikanda mosusu na bango moko, ordinatɛrɛ moko, mpe telefone moko ya mabɔkɔ. Tribinale eboyaki na ndenge nyonso kobongola ekateli oyo ezwaki mpo na basi yango, mpe eboyaki ete bákangama na ndako na esika bákangama na bolɔkɔ.

Bazali komitungisa mingi mpo na sante na bango mpe ndenge bazali

Baavoka, bandeko ya libota mpe baninga bazali komitungisa mpo na sante ya basi yango mibale, oyo ezali se kokóma mabe. Irina Zakharchenko azali sikoyo na mbula 55. Minganga balobi ete azali mpenza lokola ebɔsɔnɔ, mpo azali na maladi ya mingai makasi na mikuwa, mpe azalaki liboso na mpota na lokolo na ye ya mobali.

Ndenge basi yango bazali koyoka na makanisi ezali kotungisa mingi mpenza. Bato ya MSN batikaka kaka baavoka na bango báya kotala bango. Bandeko na bango bakoki kotinda biloko oyo basengeli na yango mpenza na ndakisa bilamba, bankisi, mpe sabuni kaka mbala moko na sanza. Mpo na kobɔndisa bango, bandeko na bango ya libota bamekaki kotindela bango Biblia, kasi bato ya MSN baboyaki.

Ekólo Azerbaïdjan ekondima mangomba mosusu?

Na ankɛtɛ oyo bato ya MSN basalaki mpo na Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova, babengaki mpe batunaki Batatoli mosusu soki 20 mituna ebeleebele mpe bakendaki kobɔtɔla biloko na bandako soki 10. Longola yango, bamonisi ya bato ya MSN, bato ya Komite mpo na kosala elongo na mangomba, mpe bapolisi bazalaki kolukaluka biloko na Ndako ya Bokonzi epai basi yango mibale bazalaki kosambela.

Lokola bakonzi ya Azerbaïdjan bayebisaki bango soki eloko mosusu ya malamu ekoki kozala longola bolɔkɔ, Batatoli ya Yehova bakomaki na Biro monene mpo na ntomo ya bato (Haut-Commissariat aux droits de l’homme) mpe bakomelaki bibongiseli ndenge na ndenge na mokili mobimba mpo na kobenda likebi na bango na ndenge Irina Zakharchenko mpe Valida Jabrayilova bakangami kaka mpamba na bolɔkɔ mpe bazali konyokwama. Azerbaïdjan ezali ekólo oyo endimá liboso ya mikili ndenge na ndenge kolongisa ntomo bonsomi ya ntina mingi ya bato, mpe emikumisaka ete ezali ekólo oyo endimaka mangomba mosusu.

Batatoli ya Yehova bazali kosɛnga na limemya nyonso ete guvɛrnema ya Azerbaïdjan etosa ntoma oyo bazali na yango mpe etika Batatoli básambela na kimya. Basɛngaki guvɛrnema ya Azerbaïdjan ebimisa mbala moko na bolɔkɔ basi yango oyo basali eloko te.