Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bapolisi bakɔteli bato na makita ya losambo na ndako moko na Tomsk

20 SANZA YA 6, 2018
RUSSIE

Russie: Bakɔtisaki Batatoli ya Yehova mosusu na bolɔkɔ nsima ya kokɔtela bango na bandako

Russie: Bakɔtisaki Batatoli ya Yehova mosusu na bolɔkɔ nsima ya kokɔtela bango na bandako

Na basanza oyo euti koleka, bakonzi ya Russie babandaki kampanye ya konyokola Batatoli ya Yehova, bakangaki mpe bakɔtisaki mingi na bango na bolɔkɔ mpo bakonzi yango balobaki ete balingi kosilisa makambo oyo elekisaka ndelo. Bapolisi bakɔtelaki Batatoli ya Yehova na bandako na Birobidzhan, Khabarovsk, Magadan, Orenbourg, Naberezhnye Chelny, Perm, Pskov, Saratov, mpe Tomsk. Bakangaki mibali mosusu 15 oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe batyaki bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango, mpe motángo na bango nyonso ekómi sikoyo 20. Mibale mosusu bazali na bolɔkɔ. Bayebisaki Batatoli ya Yehova soki 15, oyo basusu na bango bazali na mbula koleka 70 to 80, bátya sinyatire na mokanda oyo esɛngi bálongwa te na bisika oyo bafandaka. Na mokolo ya 14/06/2018, bakonzi ya Russie bafundaki Batatoli ya Yehova koleka 40. Soki bakweisi bango na likambo, bakoki kosala bolɔkɔ ya mbula tii zomi.

Bisika oyo bapolisi bakɔtaki na bandako na Russie

Guvɛrnema ya Russie etosaki te ndanga oyo epesaki na tribinale ete ndenge bapekisi biro ya misala ya Batatoli ya Yehova ekobebisa te lotomo oyo Motatoli mokomoko azali na yango ya kosala makambo na ye ya losambo. Russie etosaki mpenza te ndanga oyo epesaki mpe ezali kosalela na ndenge ya mabe Artikle 282 ya mibeko na bango mpo na kofunda Batatoli ya Yehova ete bazali kopesa mabɔkɔ, kobongisa, kopesa mbongo mpo na misala ya ebongiseli oyo “elekisaka ndelo.” Mpo na koloba solo, na esika ya kobundisa makambo ya kolekisa ndelo, Russie ezali nde konyokola bana-mboka na yango moko, oyo basambelaka Nzambe na bango na kimya.

Kokɔtela bato na bandako oyo euti kosalema mikolo oyo, kokanga mpe kotya bango na bolɔkɔ

Na mokolo ya 12/06/2018, na Saratov. Bapolisi bakɔtelaki Batatoli ya Yehova mingi na bandako mpe bamemaki Batatoli ya Yehova soki 10 na biro ya polisi mpo na kotunatuna bango mituna. Ntango bazalaki kolukaluka na bandako yango, bakonzi batyaki na ndako ya Motatoli ya Yehova moko mikanda oyo tribinale ya Russie eutaki kopekisa. Bakangaki mibali mitano oyo bazali Batatoli ya Yehova. Batikaki mibale na bango bákende, misato na bango batikalaki na mabɔkɔ ya bapolisi mpe balobaki ete Konstantin Bazhenov ná Felix Makhammadiev bazalaki ‘kobongisa misala ya ebongiseli oyo elekisaka ndelo.’ Efundeli oyo bafundaki Motatoli ya Yehova ya misato, Aleksey Budenchuk endimami naino te. Na mokolo ya 14/06/2018, tribinale ya etúká ya Frunzenskiy na Saratov elobaki ete Bazhenov ná Makhammadiev bátikala kaka na bolɔkɔ tii na mokolo ya 12/08/2018. Tribinale yango elobaki mpe ete Budenchuk atikala na bolɔkɔ, kasi elobaki te mokolo nini akobima. Bapolisi bayebisaki Motatoli ya Yehova mosusu atya sinyatire na mokanda oyo esɛngaki ete alongwa te na esika afandaka.

Na mokolo ya 3/06/2018, na Tomsk. Na ngonga ya 10:00, bapolisi mpe bato ya sireté ya Russie (Spetsnaz) bakɔtaki na ndako mibale ya Batatoli ya Yehova na Tomsk, Sibérie. Bakangaki Batatoli ya Yehova soki 30, na kati na bango mobange mwasi moko ya mbula 83. Bapolisi babɔtɔlaki bango biloko mpe mituka, batondisaki bango na babisi mpe bamemaki bango na biro oyo ebundisaka makambo oyo elekisaka ndelo.

Na biro yango, Ivan Vedrentsev, Aleksandr Ivanov, mpe Vyacheslav Lebedev bato ya ankɛtɛ batunatunaki na makasi Batatoli ya Yehova mosusu mituna tii na ngonga ya 2:00 ya mokolo oyo elandaki. Bato yango ya ankɛtɛ babangisaki moko ya baoyo bakangaki ete bakolongola ye na mosala. Ntango bazalaki kotunatuna bango mituna, baambilansi ezalaki koya mbala na mbala na biro yango mpe bamemaki moko ya Batatoli ya Yehova na lopitalo.

Baboyaki kotika Sergey Klimov, moko ya baoyo bango bakangaki akende. Na mokolo ya 5/06/2018, tribinale ya etúká ya Oktyabrskiy na Tomsk efundaki ye ete ‘azali kobongisa misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo’ mpe balobaki ete bábimisa ye na bolɔkɔ te tii mokolo ya 4/08/2018. Zuzi aboyaki ndenge balobaki ete atikala na bolɔkɔ to mpe afuta amande liboso bátika ye.

Na mokolo ya 3/06/2018, na Pskov. Bapolisi bakɔtaki na bandako mingi ya Batatoli ya Yehova na Pskov. Na ndako moko, bakangaki bato nyonso oyo bazalaki wana mpe batunatunaki bango mituna, ezala mpe bato mibale oyo bayaki kotala bankolo-ndako atako bazalaki Batatoli ya Yehova te. Mingi ya Batatoli ya Yehova, ata mpe Gennadiy Shpakovsky, bamemaki bango na biro ya sireté (FSB) mpo na kotunatuna bango mituna. Batyaki bamosusu oyo bamemaki bango na biro ya polisi mbamba mpo báloba makambo oyo ekokweisa Shpakovsky. Bakonzi basɛngaki ete asamba mpo na efundeli oyo bafundaki ye ete ‘azali kobongisa misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.’ Atako na nsima batikaki ye akende, bakonzi bakoki kofunda ye na likambo mosusu ntango nyonso oyo balingi.

Na mokolo ya 30/05/2018, na Khabarovsk. Bapolisi bakangaki Ivan Puyda nsima ya kokɔtela ye na ndako mpe kolukaluka biloko na kati ya ndako na ye. Bamemaki ye na Magadan, epai batyaki ye na bolɔkɔ. Na mokolo ya 1/06/2018, tribinale ya etúká ya Zheleznodorozhni elobaki ete Puyda akwei na likambo mpo ‘abongisaki misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo’ mpe esɛngaki ete atikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 30/07/2018.

Na mokolo ya 30/05/2018, na Magadan. Bapolisi na mindoki na mabɔkɔ mpe bamaskɛ na elongi bakɔtaki na ndako moko na Magadan mpe bakangaki Konstantin Petrov, Yevgeniy Zyablov, ná Sergey Yerkin mpe bakendaki na bango. Na mokolo ya 1/06/2018, tribinale ya engumba Magadan elobaki ete Petrov ná Zyablov ‘babongisaki misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.’ Kaka na mokolo yango, tribinale ya etúká ya Magadanskiy mpe elobaki ete Yerkin asalaki mpe bongo. Basɛngaki ete mibali yango misato oyo bazali Batatoli ya Yehova bátikala naino na bolɔkɔ tii na mokolo ya 29/07/2018.

Dmitriy Mikhailov

Na mokolo ya 29/05/2018, na Shuya, na etúká ya Ivanovo. Bakonzi bakangaki Dmitriy Mikhailov mpo na mbala ya mibale. Ntango bakɔtelaki ye na ndako na mokolo ya 20/04/2018, bapolisi balobaki ete ‘apesaki mabɔkɔ na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo’ mpe basɛngaki ye atya sinyatire na mokanda oyo esɛngaki ete alongwa te na esika afandaka. Na mokolo ya 29/05/2018, bakonzi balobaki mpe ete ‘azali kopesa mbongo mpo na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.’ Na mokolo ya 3/06/2018, tribinale ya engumba Shuya elobaki ete akotikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 19/07/2018.

Na mokolo ya 27/05/2018, na Naberezhnye Chelny, République ya Tatarstan. Na butu, bato ya sireté (FSB) bakɔtaki na bandako zomi mpo na kolukaluka mpe babɔtɔlaki baaparɛyi, batelefone mpe ba passeport. Bakangaki Ilkham Karimov, Konstantin Matrashov, mpe Vladimir Myakushin mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Na mokolo ya 29/05/2018, tribinale ya etúká ya Naberezhnochelninskiy elobaki ete mibali yango misato babongisaki mpe bazalaki kozwa bato na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango “elekisaka ndeko” mpe bapesaka mabɔkɔ na misala yango. Tribinale esɛngaki bátikala naino na bolɔkɔ tii na mokolo ya 25/07/2018. Na nsima, bakangaki mpe Aydar Yulmetyev, mpe na mokolo ya 31/05/2018, tribinale esɛngaki ye mpe atikala na bolɔkɔ.

Na mokolo ya 22/05/2018, na Perm. Ntango Aleksandr ná Anna Solovyev bazongaki na Perm nsima ya kosala mobembo na Moldova, bapolisi bakutanaki na bango na gare, batyaki Solovyev minɔti na mabɔkɔ, babɔtɔlaki biloko na ye, mpe batyaki ye na motuka mosusu mpe mwasi na ye na motuna mosusu, mpe bamemaki bango na biro ya polisi. Ntango Solovyev azalaki naino kuna, bapolisi bakendaki na ndako na ye mpo na kolukaluka mpe batunatunaki mwasi na ye mituna. Na mokolo ya 24/05/2018, tribinale ya etúká ya Sverdlovskiy elobaki ete Solovyev ‘azalaki kopesa mabɔkɔ na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango “elekisaka ndelo” mpe batyaki ye na bolɔkɔ.

Na mokolo ya 17/05/2018, na Birobidzhan. Na kode oyo babengaki yango “Mokolo ya lisambisi,” bakonzi ya bapolisi 150 ná bato ya sireté (FSB) bakɔtaki na bandako 22 ya Batatoli ya Yehova. Bapolisi babɔtɔlaki batablɛti, batelefone, mpe mbongo. Bakangaki Alam Aliev, moko ya Batatoli ya Yehova 34 oyo bazalaki koluka mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Na mokolo ya 18/05/2018, tribinale ya etúká Birobidzhanskiy elobaki ete ‘azalaki kobongisa misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo’ mpe esɛngaki atikala kaka na bolɔkɔ tii na mokolo ya 13/07/2018. Na mokolo ya 25/05/2018, zuzi Sizova ya cour d’appel ya etúká oyo Bayuda bafandaka na Russie andimaki Aliev ndenge asɛngaki asamba lisusu mpe aboyaki bátya ye naino na bolɔkɔ.

Na mokolo ya 16/05/2018, na Orenbourg. Bakonzi ya bapolisi bakɔtaki na bandako ya Batatoli ya Yehova mpo na kolukaluka. Bakangaki Batatoli ya Yehova misato: Aleksandr Suvorov, Vladimir Kochnev, mpe Vladislav Kolbanov. Na mokolo ya 18/05/2018, tribinale ya etúká ya Promyshlenniyict elobaki ete Kolbanov ‘azali kopesa mbongo na misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo.’ Tribinale yango etikaki ye akende, kasi elobaki ete bapolisi bákɛngɛla ndako na ye. Na mokolo oyo elandaki, kaka tribinale yango elobaki ete Kochnev ná Suvorov ‘bazali kobongisa misala ya ebongiseli oyo makambo na yango elekisaka ndelo’ mpe elobaki ete bátikala naino na bolɔkɔ tii na mokolo ya 14/07/2018. Bato ya ankɛtɛ basɛngaki Batatoli ya Yehova mosusu nsambo bátya sinyatire na mokanda oyo esɛngaki ete bálongwa te na engumba wana tii ntango bakosilisa kosala ankɛtɛ.

Na lobɔkɔ ya mwasi: Aleksandr Suvorov; na lobɔkɔ ya mobali: Vladimi Kochnev Kochnev

Ndenge mikili ndenge na ndenge eboyi makambo oyo Russie ezali kosala ekobongola makambo?

Ezala Union Européenne to États-Unis elobaki ete ndenge Russie ezali kotosa te bonsomi ya moto ezali mabe mpenza. Union Européenne esɛngaki Russie “etosa elako oyo bango nyonso basalaki na likambo etali kotosa bonsomi ya losambo to ya makambo oyo moto andimaka, bonsomi ya koloba, mpe bonsomi ya kosala makita.” États-Unis elobaki na Russie “ebimisa mbala moko bato nyonso oyo etye na bolɔkɔ mpo basalelaki bonsomi na bango ya losambo to ya makambo oyo bandimaka.”

Philip Brumley, avoka na Biro monene ya Batatoli ya Yehova, alobaki: “Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali komitungisa ndenge Russie ezali konyokola bandeko na bango makasi. Lelo oyo, makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango ezali kaka makambo oyo bakutanaki na yango na boyangeli ya Bakoministe. Makambo oyo bazali kosala mpe ndenge bazali kokoba konyokola bango, emonisi ete Russie etosi te ndanga oyo epesaki ya kotosa ntomo ya moto.”

Batatoli ya Yehova oyo batyaki bango liboso na bolɔkɔ mpo na mwa ntango *

  • Dennis Christensen

    Azali na mbula 45, na Oryol, bakangaki ye kobanda na mokolo ya 25/05/2017, mpe balobaki atikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 1/08/2018.

  • Valentin Osadchuk

    Azali na mbula 42, na Vladivostok, bakangaki ye kobanda na mokolo ya 19/04/2018, mpe balobaki atikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 20/06/2018.

  • Viktor Trofimov

    Azali na mbula 61, na Polyarny, bakangaki ye kobanda na mokolo ya 18/04/2018, mpe balobaki atikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 11/10/2018.

  • Roman Markin

    Azali na mbula 44, na Polyarny, bakangaki ye kobanda na mokolo ya 18/04/2018, mpe balobaki atikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 11/10/2018.

  • Anatoliy Vilitkevich

    Azali na mbula 31, na Ufa, bakangaki ye kobanda na mokolo ya 10/04/2018, mpe balobaki atikala na bolɔkɔ tii na mokolo ya 2/07/2018.

^ par. 21 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Kampanye ya konyokola Batatoli ya Yehova ebandi na Russie” na jw.org na esika bakomi Bansango.