Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yá bana na yo

Ozalaka na zuwa? Bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa

Ozalaka na zuwa? Bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa

TIKÁ tólobela naino zuwa soki elimboli nini. Esilá kokómela yo oyina moto mpo bazali koloba ete azali malamu, kitoko to mayele? *— Yango nde ekoki kokómela yo soki ozali koyokela moto zuwa.

Na kati ya libota, soki baboti balingi mwana moko koleka mosusu, yango ekoki kobota zuwa. Biblia ezali kolobela libota moko epai zuwa ebimisaki matata monene. Tiká tólobela mokakatano oyo zuwa ebimisaki na libota yango mpe liteya oyo tokoki kozwa na likambo yango.

Yozefe azalaki mwana ya 11 na libota ya Yakobo, mpe bandeko na ye bazalaki koyokela ye zuwa. Oyebi ntina oyo bazalaki koyokela ye zuwa?— Ezali mpo tata na bango, Yakobo, azalaki kolinga Yozefe mingi. Na ndakisa, Yakobo asalelaki Yozefe elamba moko ya kitoko. Yakobo alingaki Yozefe mingi “mpo ete azalaki mwana ya [bobange] na ye” mpe mwana ya liboso ya Laele, mwasi oyo azalaki kolinga mingi.

Biblia elobi ete “emonaki bandeko ya [Yozefe] ete tata na ye alingaki ye na koleka bandeko na ye nyonso, bayinaki ye.” Mokolo moko, Yozefe ayebisaki bandeko na ye ete alɔtaki ete bango nyonso, ezala tata na bango, bafukamelaki ye. Biblia elobi ete, “Bandeko na ye bayokelaki ye zuwa,” mpe tata na ye agangelaki ye lokola abɛtɛlaki bango lisolo ya ndɔtɔ ya ndenge wana.​—Genese 37:1-11.

Mwa moke na nsima, ntango Yozefe azalaki na mbula 17, bandeko na ye bakendeki koleisa bampate mpe bantaba ya tata na bango mosika mpenza. Na yango, Yakobo atindaki Yozefe akende kotala soki bandeko na ye bazali ndenge nini. Oyebi oyo mingi kati na bango balingaki kosala ye ntango bamonaki ye azali koya na mosika?— Bakanaki koboma ye! Kasi, bandeko na ye mibale, Lubene ná Yuda baboyaki.

Ntango bato moko ya mombongo oyo bazalaki kokende na Ezipito balekaki wana, Yuda alobaki: “Yaká totɛkisa ye.” Yango nde basalaki. Babomaki ntaba moko mpe bazindisaki elamba ya Yozefe na kati ya makila na yango. Na nsima, ntango balakisaki tata na bango elamba yango, agangaki: ‘Nyama ya zamba elei Yozefe.’​—Genese 37:12-36.

Nsima ya bambula, Falao mokonzi ya Ezipito asepelaki na Yozefe mingi. Asepelaki na ye mpo, na lisalisi ya Nzambe, alimbwelaki ye ndɔtɔ mibale oyo alɔtaki. Na ndɔtɔ ya liboso, amonaki ngɔmbɛ nsambo ya mafuta mpe mosusu nsambo oyo ekɔndá. Na ndɔtɔ ya mibale, amonaki mitó nsambo ya mbuma ya ble ya minene mpe ya kitoko mpe nsambo mosusu ya mikemike mpe ekauká. Yozefe ayebisaki ye ete ndɔtɔ yango nyonso mibale elimbolaki kaka eloko moko: ekozala na mbula nsambo oyo bilanga ekobimisa bilei mingi mpe mbula nsambo ya nzala. Falao apesaki Yozefe mokumba ya kobomba bilei na boumeli ya mbula nsambo oyo bilanga ekobota mingi mpo esalisa na ntango ya nzala.

Ntango nzala ekɔtaki, bandeko ya Yozefe oyo bazalaki kofanda mosika mpenza, bakómaki na bosɛnga ya bilei. Yakobo atindaki bayaya ya Yozefe zomi na Ezipito mpo na koluka bilei. Ntango bakómaki liboso ya Yozefe, bayebaki ye lisusu te. Kozanga koyebisa bandeko na ye ete ye nde Yozefe, amekaki bango mpe amonaki mawa oyo bazalaki na yango mpo na mabe oyo basalaki ye. Na nsima, Yozefe amiyebisaki epai na bango. Bayambanaki na esengo mpenza!​—Genese, mokapo 40 tii na Genese mokapo 45.

Lisolo wana ya Biblia eteyi yo nini na oyo etali zuwa?— Zuwa ekoki kobimisa mikakatano ya makasi, ata mpe kotinda moto asala ndeko na ye mabe! Tótánga Misala 5:17, 18 mpe Misala 7:54-59 mpe tótala oyo zuwa etindaki bato mosusu básala bayekoli ya Yesu.— Na bavɛrsɛ oyo totángi, omoni ntina oyo tosengeli kokeba na zuwa?—

Yozefe aumelaki na bomoi mbula 110. Akolisaki bana, bana yango babotelaki ye bankɔkɔ mpe bankɔkɔ yango babotaki. Tokanisi ete Yozefe azalaki koteya bango mbala na mbala bálinganaka mpe báyokelanaka zuwa te.​—Genese 50:22, 23, 26.

^ par. 3 Soki ozali kotánga lisolo oyo ná mwana, mwa mokɔlɔtɔ oyo (​—⁠) ekokundwela yo ete opema mwa moke mpe olendisa mwana apesa likanisi na ye.