Lakisá makambo oyo ezali na kati

Sekele mpo na libota ya esengo

Ndenge oyo yo ná molongani na yo bokoki kokóma makasi na elimo

Ndenge oyo yo ná molongani na yo bokoki kokóma makasi na elimo

Frederick *: “Ntango tobalanaki sika, nazalaki kosala makasi ete ngai ná mwasi na ngai tóyekolaka Biblia elongo. Nalingaki ete atyaka mpenza makanisi na ye na boyekoli. Kasi, nazalaki komona ete Leanne azalaki kokoka te. Mpe soki natuni motuna, azalaki kaka koyanola na mokuse ɛɛ to te. Nazalaki komona ete ndenge oyo azalaki kosala ezali te oyo tokoki kobenga koyekola Biblia.”

Leanne: “Nazalaki na mbula 18 ntango tobalanaki ná Frederick. Mbala na mbala tozalaki koyekola elongo, kasi mpo na Frederick, boyekoli ekómaki nde ntango ya kolobela mabe na ngai mpe makambo oyo nasengelaki kobongisa mpo nakóma mwasi ya malamu. Ekómaki kolɛmbisa ngai mpe kopesa ngai nkanda!”

OKANISI ete mokakatano ya Frederick ná Leanne ezalaki nini? Bazalaki na makanisi ya malamu. Bango mibale balingaki Nzambe. Bayebaki mpe ete basengeli koyekolaka Biblia elongo. Kasi, likambo oyo ekokaki kosalisa bango bákóma na bomoko, yango nde ezalaki kokabola bango. Tokoki koloba ete bazalaki koyekola elongo, kasi bazalaki kosalisana te mpo bákóma makasi na elimo.

Kozala makasi na elimo elimboli nini? Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kosala nyonso mpo bákóma makasi na elimo? Mikakatano nini bakoki kokutana na yango, mpe ndenge nini bakoki kolonga yango?

Kozala moto ya elimo elimboli nini?

Na Biblia, maloba “moto ya elimo” ezali na ndimbola mingi; ekoki kotalela makanisi ya moto to ndenge na ye ya kotalela makambo ya bomoi. (Yuda 18, 19) Na ndakisa, Paulo, mokomi moko ya Biblia, amonisaki bokeseni oyo ezali kati na moto ya elimo ná moto ya mosuni. Paulo amonisaki ete bato ya mosuni balukaka kaka bolamu na bango moko. Basalaka makambo oyo ezali malamu na miso na bango, na esika báluka kotosa mibeko ya Nzambe.​—1 Bakorinti 2:14; Bagalatia 5:19, 20.

Nzokande, bato ya elimo balingaka mibeko ya Nzambe. Batalelaka Yehova Nzambe lokola Moninga na bango mpe basalaka makasi bámekola bizaleli na ye. (Baefese 5:1) Yango wana, bazalaka na bolingo mpe na boboto. (Kobima 34:6) Batosaka mpe Nzambe ata soki ekosɛnga bango bándima likambo ya mpasi. (Nzembo 15:1, 4) Darren, mobali moko oyo afandaka na Canada mpe abalá eleki mbula 35, alobi boye: “Mpo na ngai, moto ya elimo alukaka ntango nyonso ete maloba mpe misala na ye ebebisa te boninga na ye ná Nzambe.” Mwasi na ye Jane abakisi boye: “Nakanisi ete mwasi oyo azali moto ya elimo ezali oyo asalaka makasi ete mokolo na mokolo amonisa mbuma ya elimo ya Nzambe.”​—Bagalatia 5:22, 23.

Ya solo, esɛngi kaka te kozala moto oyo abalá mpo na kokóma moto ya elimo. Kutu, Biblia ezali koteya ete moto na moto azali na mokumba ya koyekola bizaleli ya Nzambe mpe komekola ye.​—Misala 17:26, 27.

Mpo na nini yo ná molongani na yo bosengeli kokóma makasi na elimo?

Mpo na nini mobali ná mwasi na ye basengeli kosala elongo mpo bákóma makasi na elimo? Tótalela ndakisa oyo: Bato mibale bazali na elanga moko mpe balingi kolona ndunda. Moko na bango aponi kolona mbuma na sanza moko boye; nzokande, mosusu akanisi ete esengeli kolona yango na sanza mosusu, mwa mosika. Moko alingi kosalela biloko oyo ekobakisa vitamini na mabele, kasi mosusu amoni ete mabele ekobota malamu ata soki babakisi eloko te. Moko alingi ete mokolo na mokolo asalaka mosala makasi na elanga. Mosusu asepeli kokanga mabɔkɔ mpe kotala mpamba, na esika asala mosala. Na likambo ya ndenge wana, elanga ekoki kobota mwa mbuma, kasi ekozala mingi te ndenge elingaki kozala soki bango mibale bayokanaki makambo oyo bakosala mpe basalaki elongo mpo na kokokisa mikano yango.

Mobali ná mwasi bazali lokola bato wana mibale. Soki kaka moko na bango nde azali kosala milende mpo akóma makasi na elimo, boyokani na bango ekoki kobonga mwa moke. (1 Petro 3:1, 2) Kasi, boyokani na bango ekozala malamu koleka soki bango mibale bayokani ete bátosaka mibeko ya Nzambe mpe básala milende mpo na kopesana mabɔkɔ na ndenge bazali kosalela Nzambe! Mokonzi Salomo akomaki ete “bato mibale baleki moto moko.” Mpo na nini? “Mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi. Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.”​—Mosakoli 4:9, 10.

Na ntembe te, ozalaka na mposa ete yo ná molongani na yo bózala makasi na elimo. Kasi, ndenge moko na elanga, kozala na mposa mpamba ekopesa litomba moko te. Tótalela mikakatano mibale oyo bokoki kokutana na yango mpe ndenge oyo bokoki kolonga yango.

MOKAKATANO 1: Tozali kozwa ntango te.

Suzanne, mwasi moko oyo abali kala te, alobi boye: “Mobali na ngai ayaka kozwa ngai na mosala na ngonga ya 19. Ntango tokómi na ndako, tokutaka misala nyonso ya ndako ezali kozela biso. Ezalaka etumba kati na nzoto mpe motema; epai mosusu motema ezali koyebisa biso ete tosengeli koyekola mwa moke, kasi epai mosusu nzoto ezali kosɛnga ete tópema.”

Ndenge oyo bokoki kosala: Bóyeba kopona ntango ya malamu mpe bópesanaka mabɔkɔ. Suzanne alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai tozwaki mokano ete tólamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kotánga Biblia mpe kolobela makambo oyo totángi liboso tókende na mosala. Asalisaka ngai mpe na misala mosusu ya ndako mpo na nsima tólekisaka mwa ntango elongo.” Kosala bongo ezali na matomba nini? Eddy, mobali ya Suzanne, alobi boye: “Namonaka ete soki ngai ná Suzanne tozali koyekola elongo makambo ya Nzambe, tosilisaka malamu mikakatano oyo tokutanaka na yango mpe tolongaka mitungisi na biso malamu koleka.”

Longola kosolola, ezali na ntina mingi bózwaka mwa miniti mokolo na mokolo mpo na kobondela elongo. Ndenge nini yango ekoki kosalisa? Richard, oyo abalá eleki mbula 16, alobi boye: “Eleki mwa mikolo, ngai ná mwasi na ngai tozalaki na matata ya makasi. Kasi, tozalaki kozwa ntango ya kobondela elongo butu nyonso mpe koyebisa Nzambe mitungisi na biso. Namoni ete kobondela elongo esalisaki biso tósilisa mikakatano na biso mpe tókóma lisusu na esengo na libala na biso.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Mpokwa nyonso, lukáká mwa ntango mpo na kolobela makambo ya malamu oyo bino mibale bokutanaki na yango, oyo bokoki kopesa Nzambe mersi mpo na yango. Bólobela mpe mikakatano oyo bozali kokutana na yango, mingimingi oyo bozali na mposa ete Nzambe asalisa bino mpo na kolonga yango. Likebisi: Kosalela te ntango yango mpo na kolobela mabe ya molongani na yo. Ntango bozali kobondela elongo, bólobela kaka makambo oyo bolingi kobongisa elongo. Na mokolo oyo ekolanda, bósalela makambo oyo bosɛngaki na libondeli.

MOKAKATANO 2: Tozali na makoki ndenge moko te.

Tony alobi boye: “Namesaná te kofanda ntango molai mpe kotánga.” Mwasi na ye Natalie, alobi boye: “Nalingaka kotánga, nalingaka kolobela makambo oyo natángi. Namonaka ete ntango mosusu Tony ayokaka ngai mwa nsɔni soki tozali koyekola makambo ya Nzambe.”

Ndenge oyo bokoki kosala: Bópesanaka mabɔkɔ, moto te alukaka koleka moninga to kosambisa ye. Sungáká mpe lendisáká molongani na yo. Tony alobi boye: “Ndenge oyo mwasi na ngai asepelaka koyekola makambo ya Biblia ekamwisaka ngai, mpe liboso nazalaki kokima kosolola na ye masolo ya Biblia. Kasi, Natalie, asalisaka ngai mingi. Sikoyo, toyekolaka mbala na mbala makambo ya Biblia elongo, mpe namoni ete nasengeli kobangaka eloko moko te. Nasepelaka kosolola makambo yango ná mwasi na ngai. Esalisi biso tókóma na esengo mpe na kimya na libala na biso.”

Bato mingi bamonaka ete mabala na bango ekómaka malamu soki bazali kozwa ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia elongo pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, esengeli kosimba likambo oyo: Talelá ndenge oyo yo moko okoki kosalela toli nyonso oyo boyekoli, kasi te ndenge oyo molongani na yo akoki kosalela yango. (Bagalatia 6:4) Bólukaka kosilisa matata na bino ntango mosusu, kasi te na ntango oyo bozali koyekola. Mpo na nini?

Talelá ndakisa oyo: Okoki nde kosukola mpota ntango ozali kolya ná libota na yo? Te, mpamba te okoki kokata moto nyonso mposa ya kolya. Yesu akokanisaki koyekola mokano ya Nzambe mpe kosalela yango na kolya bilei. (Matai 4:4; Yoane 4:34) Soki mbala nyonso oyo bozali kotánga Biblia, ozali kolobela makambo oyo ezali lokola mpota na motema, okoki kokata molongani na yo mposa ya kolya na elimo. Ezali malamu bólobelaka mikakatano na bino; kasi, bósalaka yango na ntango mosusu oyo bobongisi kaka mpo na yango.​—Masese 10:19; 15:23.

MEKÁ KOSALA BOYE: Komá bizaleli mibale to misato ya molongani na yo oyo osepelaka na yango mingi. Ntango bozali kolobela makambo ya elimo oyo eyokani na bizaleli yango, yebisá molongani na yo ete osepelaka mingi ndenge oyo amonisaka yango.

Okobuka oyo ozali kolona

Soki yo ná molongani na yo bozali kosala makasi bózala bato ya elimo, libala na bino ekozala na kimya mpe na esengo. Kutu, Liloba ya Nzambe elobi ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

Frederick ná Leanne, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, bamonaki ete Biblia elobi solo na likambo yango. Bakokisi mbula 45 na libala mpe bamoni ete kotya molende ebotaka mbuma malamu. Frederick alobi boye: “Nazalaki koloba na mwasi na ngai ete asololaka na ngai te. Nzokande, namonaki na nsima ete ngai mpe nasengelaki kobongisa makambo mosusu.” Leanne alobi boye: “Eloko oyo esalisaki biso na ntango ya mikakatano ezalaki bolingo na biso mpo na Yehova Nzambe. Nsima ya bambula, tozwaki momeseno ya koyekola mpe kobondela elongo. Ntango namonaka Frederick azali kosala makasi mpo na kokóma na bizaleli ya Kristo, nalingaka ye lisusu mingi.”

^ par. 3 Topesi bango bankombo mosusu.

OMITUNA . . .

  • Mbala ya nsuka oyo nabondelaki elongo na molongani na ngai ezalaki mokolo nini?

  • Nakoki kosala nini mpo na kolendisa molongani na ngai tóyekolaka makambo ya Nzambe elongo?