LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI Sanza ya Juin 2013 | Kokanisela basusu mabe ekosila ntango nini?

Kaka Nzambe nde akoki kosilisa mpenza mpo na libela likambo ya kokanisela basusu mabe. Ntango nini mpe ndenge nini akosala yango?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ezaleli ya kokanisela basusu mabe epalangani mokili mobimba

Kokanisela basusu mabe elimboli nini? Mpo na nini tokoki koloba ete ezali likambo ya moto na moto atako ezali bisika nyonso?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kokanisela basusu mabe ekosila ntango nini?

Bandakisa ya makambo oyo esalemaki mpenza emonisi ete Biblia ezali kosalisa bato bálonga ezaleli ya kokanisela basusu mabe. Ntango nini ekosila mpo na libela?

KOKÓMA MONINGA YA NZAMBE

Yehova “aponaka bilongi te”

Nzambe ayokaka mabondeli ya basambeli na ye nyonso, ata soki bazali na mposo to ekólo nini, bazwi to babola. Ndenge nini toyebi yango?

Eloko moko ya motuya oyo ebombamaki bankama ya bambula

Talá ndenge bamonaki libongoli ya kala mpenza ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien.

Tosengeli kobondelaka basantu?

Likanisi ya Biblia na likambo ya kobondela basantu etaleli mpe eyano ya motuna oyo: tosengeli kobanga kobondela Nzambe?

TEYÁ BANA NA YO

Liteya nini tokoki kozwa epai ya mosali-mabe?

Ntango Yesu akómaki pene ya liwa, alakaki mosali-mabe ete akozala na bomoi na paradiso awa na mabele. Yesu alingaki koloba nini, mpe paradiso yango ekozala ndenge nini?

Biyano na mituna ya Biblia

Atako bato mingi bazali kosala milende, balongi kaka te kotya kimya na mokili. Talá ntina yango.

Makambo mosusu

Batatoli ya Yehova bakanisaka nini mpo na mangomba mosusu?

Talá ntina oyo bakristo ya solo bandimaka makanisi ya basusu.