LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Juillet 2013

Nimero oyo esemboli boyebi na biso na oyo etali ntango oyo makambo oyo Yesu alobelaki na esakweli ya mikolo ya nsuka ezali kokokisa mpe esalisi biso tóyeba moombo ya sembo mpe ya mayele.

“Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini?”

Ndenge nini boyebi na biso esembolami mpo na oyo etali kokokisama ya makambo oyo Yesu alobelaki mpo na esakweli na ye na Matai mokapo 24 mpe 25?

“Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso

Ndakisa ya Yesu na oyo etali blé mpe batiti mabe ezali kolobela ntango ya kolona, bokoli, mpe ntango ya kobuka mbuma. Ndenge nini boyebi na biso esembolami mpo na oyo etali ntango ya kobuka mbuma?

Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke

Ndenge nini Yesu azalaki koleisa na elimo masangá ya siɛklɛ ya liboso? Ndakisa nini atikaki mpo na biso lelo?

“Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?”

Lisolo oyo ezaoli kosembole boyebi na biso na ntina etali moombo ya sembo mpe ya mayele. Yekolá ndenge nini nzela yango oyo Nzambe azali kosalela nde ezali kosalisa biso tozala malamu na elimo.

Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Na Sɛtɛmbɛ 1, 2012, Mark Sanderson akomaki moko ya Lisangani ya Mikólo-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.

LISOLO YA BOMOI

Esengo ya kosalela Yehova​—Ata na esika nini

Yekola ndenge oyo mobali na mwasi na ye na mokili ya Pays-Bas bayekolaki kotyela mpenza Yehova motama na mikakatano oyo bakutanaki na yango mpe mbongwana na bomoi.

“Talá elilingi oyo!”

Mayemi mpe bafɔtɔ oyo batyaka na mikanda na biso mpo na koteya biso, eteyaka biso, etindaka biso tokanisa mpe esimbaka mayoki na biso. Ndenge nini okoki kozwa matomba na bililingi yango ya kitoko?