LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Août 2013

Lisolo oyo ezali kolobela ndenge ya kokoba kozala basantu na mosala ya Nzambe mpe kotika asalela biso, mpe ndenge ya koboya kopesa Nzambe foti ntango tokutani na mikakatano, mpe ndenge tokoki kobundisa ezaleli ya kolemba nzoto.

Bosantisami

Talelá makambo minei oyo ekoki kosalisa biso tokoba kozala basantu mpe Nzambe asalela biso na mosala na ye.

Mituna ya batángi

Ekoki kozala malamu baboti bafanda elongo na mwana na bango oyo abimisami na lisangá na makita?

LISOLO YA BOMOI

Yehova ‘azali komema mokumba na ngai mokolo na mokolo’

Atako kolongono ya nzoto ezalaki malamu te, nini esalisaki ndeko mwasi oyo afandaka na Namibie asala mosala ya mobongisi-nzela na esengo mbula koleka 20?

“Kosilikela Yehova” soki moke te

Bamosusu bazali kosilikela Nzambe na mitema na bango. Bazali kopesa ye foti mpo na mikakatano na bango. Ndenge nini tokoki kokima motambo yango?

Baboti​—Bóteya bana na bino banda bomwana

Kopesa mwana formasyo esengeli kobanda ntango nini? Makambo nini osengeli koteya ye na formasyo yango?

Tótyelanaka likebi mpe tólendisanaka

Ndenge nini tokoki kosalisana mpo tokoba kosalela Nzambe na bosembo ata soki tozali mikakatano?

Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala

Satana alingaka te Nzambe andima biso. Nini tosengeli kosala mpo na kobatela boning na biso na Nzambe?

Elisha amonaki makalo oyo ezali kopela mɔtɔ​—Yo mpe omonaka yango?

Elisha azalaki na kondima makasi mpe atyelaki Yehova motema mobimba. Ndakisa na ye ekoki koteya biso nini?

BILOKO OYO TOSALELÁ KALA

Mokonzi asepelaki mingi!

Tangá oyebá ndenge mokonzi ya Swanziland asepelaki mingi koyekola mateya ya solo ya Biblia.