LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Septembre 2013

Nimero oyo ekolobela ndenge ya kozwa bikateli ya malamu, ndenge ya kokómisa makasi boyokani na biso na Yehova Nzambe, mpe ndenge oyo makundoli ya Yehova ekoki kosalisa biso.

Mayele ya kokesenisa makambo esalisa yo

Mbala mingi, Yesu azalaki kosalela mayele ya kokesenisa makambo. Talá ndenge yo mpe okoki kosalela mayele yango mpo na kosalisa basusu báyeba mateya ya Biblia.

Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema

Banda kala, Yehova asalelaka makundoli mpo na kotambwisa basaleli na ye. Mpo na nini tokoki kotyela makundoli ya Nzambe motema lelo oyo?

Kómisá makundoli ya Yehova esengo ya motema na yo

Osepelaka kotosa mibeko ya Yehova, to ntango mosusu omonaka yango kilo? Ndenge nini tokoki tókóma kotyela makundoli na ye motema?

Obongwaná?

Mpo na nini bakristo nyonso basengeli kotya likebi na likambo etali ‘kobongwana’? Kobongwana esɛngi nini mpe nini ekoki kosalisa biso tóbongwana mpenza?

Zwáká bikateli ya malamu

Ndenge tokoki koyeba soki bikateli na biso eyokani mpenza na mokano ya Nzambe? Nini ekoki kosalisa biso tókokisa bikateli oyo tozwaki?

Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe

Talá ndenge mwambe oyo mosala ya mobongisi-nzela ekoki kokómisa makasi boyokani na yo na Yehova. Nini ekoki kosalisa yo okoba na mosala yango oyo etondi na mapamboli?

Mituna ya batángi

Mpo na nini Yesu abimisaki mpisoli liboso ya lisekwa ya Lazare, ndenge Yoane 11:35 emonisi yango?