LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Janvier 2014

Lisolo oyo emonisi ete Yehova azali ntango nyonso Mokonzi. Ekosalisa mpe biso tókóma na botɔndi mingi mpo na Bokonzi ya Masiya mpe makambo esili kokokisa.

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Afrika ya Wɛsti

Nini etindaki bandeko mosusu ya Mpoto bákende na Afrika ya Wɛsti mpe matomba nini bazwaki?

Tósambela Yehova, Mokonzi ya seko

Soki toyekoli ndenge oyo Yehova, Tata na biso asalaka makambo mpe ndenge oyo amonisaka bokonzi na ye ekotinda biso tópusana penepene na ye.

Mbula 100 ya Boyangeli​—Eteyi yo nini?

Ndenge nini tokozwa matomba na boyangeli yango? Talá ndenge Mokonzi Masiya azali kopɛtola, koteya mpe kobongisa bato na ye.

Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge

Bilenge oyo bamipesá bazwaka esengo na kosalisa basusu. Ndenge nini okoki koyoka esengo na kosangana na mosala ya Yehova?

Salelá Yehova liboso ete mikolo ya mpasi eya

Mabaku nini ya ntina mingi bakristo oyo bakómi mibange bazali na yango mpo na kosala mingi na mosala ya Nzambe?

“Bokonzi na yo eya”​—Kasi ntango nini?

Mpo na nini tokoki kotya motema ete Mokonzi oyo Nzambe atyaki akosala makambo mosusu mpo ete mokano ya Nzambe esalema na mabele na mobimba?

Ekateli oyo nazwaki ntango nazalaki naino mwana

Elenge mobali moko oyo autaki na Columbus, na etúká ya Ohio, na États-Unis azwaki ekateli ya koyekola monɔkɔ ya Cambodge. Mpo na nini? Ndenge nini ekateli yango ebongisaki bomoi na ye na nsima?