LAMUKÁ! Sanza ya Octobre 2014 | Kolonga ya solosolo elimboli nini?

Elimboli kolanda bandɔtɔ na yo? Makambo nyonso oyo okanaka ekokisama? To ezali nde likambo moko oyo eleki makambo wana nyonso?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kolonga ya solosolo elimboli nini?

Kolonga te na likambo moko ezali malamu koleka kokanisa ete olongi mpenza nzokande ezali bongo te.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mpo na yo kolonga na bomoi esɛngaka nini?

Talelá bandakisa minei liboso opesa eyano.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Oyo okoki kosala mpo olonga mpenza

Makambo mitano oyo ekoki kosalisa yo olonga mpenza.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Ezali mpe na masolo oyo: likama ya kopesa mbongo moke ya libala, bomɛngo ya bato ya mobulu oyo bakangaka bamasuwa na kati ya mbu, ndenge bandɛkɛ oyo esalaka mibembo epumbwaka ebele ya bakilomɛtrɛ kozanga kolɛmba.

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya kolonga komekama

Kozala na likoki ya kolonga komekama ezali elembo ya mibali mpe basi ya solosolo. Makambo motoba ekoki kosalisa yo mpo ekateli na yo ekóma makasi mpe okima mitungisi oyo eyaka soki moto andimi kokwea na komekama.

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Bélize

Mwa mboka yango ezali esika ya liboso epai nyama babengi jaguar ezalaka mingi na mokili mpe ngomba ya mibale ya mabanga ya korai na mokili mobimba.

Basali-bilanga oyo epumbwaka na bazamba minene ya mikili ya molunge

Bangembo oyo elyaka mbuma, oyo eyebani mpe na nkombo renard volant, ezali na ntina mingi mpo mabele ezala malamu.

BIBLIA ELOBI NINI?

Bililingi

Bakristo ya liboso basalelaki bililingi na losambo na bango?

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Lokolo ya mpunda

Mpo na nini ba-ingénieur balongi te komekola lokolo ya mpunda?