LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Octobre 2014

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli kobanda 1/12 tii na 28/12/2014.

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Taïwan

Batatoli ya Yehova koleka 100 bayá kosala awa esika mposa ya basakoli ezali monene. Luká koyeba makambo oyo bakutanaki na yango mpe nini esalisaki bango bálonga na mosala na bango.

Zalá na kondima makasi na Bokonzi

Yehova asalelaki kondimana nsambo mpo na kondimisa biso ete Bokonzi na ye ekokokisa mokano na ye. Ndenge nini kondimana yango nyonso esalisaka biso tókóma na kondima makasi?

Bokokóma “bokonzi moko ya banganga-nzambe”

Kondimana misato na kati ya kondimana motoba ekoki kotinda biso tótyela Bokonzi ya Nzambe motema mpe kosakwela basusu nsango malamu na yango.

LISOLO YA BOMOI

Makambo oyo nakutani na yango na mosala ya Yehova

Mildred Olson asaleli Yehova mbula koleka 75, mpe asali lokola misionɛrɛ pene na mbula 29 na El Salvador. Nini esalisaka ye amimona kaka elenge?

Sepelá na libaku oyo ozali na yango ya kosala na Yehova!

Nini etindaka basambeli ya Yehova bázongisa nsima ezaleli ya koluka matomba na bango moko?

“Bókoba kotya makanisi na bino na makambo ya likoló”

Mpo na nini baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele basengeli kotya makanisi na bango na biloko ya likoló? Bakoki kosala nini?