LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Décembre 2014

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli kobanda 2/02 tii na 1/03/2015.

‘Ayebaki nzela’

Ndeko Guy H. Pierce, ya lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova akufaki mokolo ya mibale, mikolo ya sanza 18 ya sanza ya misato ya mobu 2014.

Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa

Tokoki kozwa mateya ya ntina na mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele na oyo etali makabo.

‘Yoká mpe kangá ntina’

Yesu apesaki bandakisa ya mbuma ya mutarde, levire, moto ya mombongo oyo asalaka mobembo mpe eloko ya motuya oyo ebombami. Bandakisa yango elimboli nini?

‘Okangi ntina’?

Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni oyo alalaki, ya monyama, mpe ya mwana ya mobulu elimboli nini?

Ozali koyeba lisusu?

Mituna 12 oyo okotalela ekosalisa yo omona makambo nini ozali koyeba lisusu kobanda na nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya 6 tii ya 12/2014.

Okoki kobongola makanisi na yo?

Bikateli mosusu oyo tozwaka ekoki kobongwana te, kasi nyonso te. Ndenge nini okoki koyeba oyo ya kobongola te mpe ya kobongola?

Mituna ya batángi

Yirimia alingaki koloba nini ntango alobaki ete Rashele azali kolela bana na ye?

Tósala na bomoko mpo tólonga mokili oyo enuni

bandakisa minei ya Biblia oyo emonisi ntina ya kozala na bomoko, mpe mpo na nini ekozala na ntina mingi na mikolo ezali koya.

Ozalaka na botɔndi na oyo ozwá?

Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kozwa na motuya libula na biso ya elimo?

Index ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 2014

Masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe ya boyekoli oyo ebimaki na 2014.