Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI No 3 2017 | Batambwisi-mpunda minei​—Ndenge oyo bazali kopota mbangu etali mpe yo

OKANISI NINI?

Kopota mbangu ya batambwisi-mpunda minei oyo mokanda ya Emoniseli elobeli ezali moko ya masolo oyo bato mingi bayebi na mokanda ya Emoniseli. Bamosusu babangaka yango. Ebendaka likebi ya basusu. Talá oyo Biblia elobi mpo na bisakweli ya ndenge wana:

“Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo.”​Emoniseli 1:3.

Nimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisi ndenge oyo kopota mbangu ya batambwisi-mpunda minei ekoki kozala nsango malamu mpo na yo.

 

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Koyeba batambwisi-mpunda minei ezali na ntina!

Batambwis-mpunda minei—moko ya mpɛmbɛ, moko ya motane, moko ya moindo, moko ya mai ya mpondu. Kopota mbangu na yango ezali likambo oyo eyebani malamu na mokanda ya Emoniseli.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?

Talá ndenge okoki koyeba ndimbola ya emonaneli yango.

Likambo mosusu oyo endimisi ete Biblia elobaka solo

Mbala mosusu oyebi te soki Tatenai azalaki nani, kasi biloko oyo bato ya arkeoloji bakundoli mpe ezali na nkombo Tatenai ezali na ntina mingi.

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Nalingaki lisano ya Baseball koleka eloko nyonso!

Samuel Hamilton alingaki masano mingi, kasi boyekoli ya Biblia ebongolaki bomoi na ye.

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO

“Ozali mwasi moko kitoko mingi”

Na Ezipito, bankumu bamonaki ete Sara azalaki kitoko mingi. Oyo esalemaki na nsima ekoki kokamwisa yo.

Biblia elobi nini?

Nzambe azwaka bato moko boye na valɛrɛ koleka bato mosusu? Nzambe apambolá to alakelá mabe mwa etuluku moko boye ya bato?

Makambo mosusu

Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?

Mokanda ya Emoniseli yango moko elobi ete baoyo bazali kotánga, kokanga ntina, mpe kosalela nsango na yango, bakozala na esengo.