LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mars 2019

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 06/05 tii 02/06/2019

Nini ezali kopekisa ngai nazwa batisimo?

Bato mosusu oyo bayebi Yehova bakakatanaka mpo na kozwa batisimo. Nini ekoki kosalisa bango mpo makambo mosusu epekisa bango te kozwa batisimo?

Yoká mongongo ya Yehova

Na nzela nini Yehova alobaka na biso lelo oyo? Matomba nini tozwaka soki tozali koyoka Nzambe?

Monisá ete omityaka na esika ya basusu

Ndenge nini Yehova ná Yesu bamonisaka ete bamityaka na esika ya basusu, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na bango?

Monisá ete omityaka na esika ya basusu na mosala ya kosakola

Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tómityaka na esika ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola?

Bolamu​—Ndenge nini okoki kokolisa ezaleli yango?

Bolamu ezali nini? Mpo na nini tosengeli kosala makasi tokolisa ezaleli yango?

Koloba “amen” ezali na motuya na miso ya Yehova

Na momeseno, bato mingi balobaka ‘amen’ na nsuka ya libondeli. ‘Amen’ na biso ekumisaka Nzambe. Liloba yango elimboli nini mpe ndenge nini Biblia esaleli yango?