LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Novembre 2019

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 30/12/2019–02/02/2020.

Salá boninga ya makasi na basusu liboso nsuka eya

Tokoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yirimia, oyo baninga na ye basalisaki ye abika na eleko ya mpasi oyo ezalaki liboso ya kobebisama ya Yerusaleme.

Ndenge elimo santu esalisaka biso

Elimo santu ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. Kasi, mpo tózwa yango mpenza, ezali na makambo minei oyo tosengeli kosala.

Ozali kobatela “nguba monene ya kondima” na yo?

Kondima na biso ebatelaka biso ndenge nguba ebatelaka soda. Ndenge nini tokoki koyeba soki nguba ya kondima na biso ezali malamu?

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Balevi

Mokanda ya Balevi ezali na mibeko oyo Yehova apesaki Yisraele ya kala. Biso bakristo tozali na nse ya mibeko yango te, kasi ekoki kopesa biso mateya ya ntina mingi.

‘Bósukisa makambo oyo bobandaki kosala’

Ata ntango tozwi bikateli ya malamu, tokoki kozala na mokakatano mpo na kokokisa yango. Talá makanisi ya malamu oyo ekoki kosalisa yo okómisa tii na nsuka likambo oyo obandi.

Oyebaki yango?

Mokumba nini bakapita bazalaki kokokisa na ntango ya kala?