LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Février 2020

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 06/04-03/05/2020.

Tata na biso Yehova alingaka biso mingi

Tokoki kotya motema ete Tata na biso alingaka biso, asalisaka biso, mpe akosundola biso ata mokolo moko te.

Tolingaka Tata na biso Yehova mingi

Talá mwa makambo ya sikisiki oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingaka Yehova, Tata na biso ya bolingo.

Bundisá likunya mpo olanda kimya

Ekoki kozala mpasi kobundisa likunya. Talá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kolongola ezaleli yango ya mabe mpe kozala na kimya elongo na basusu.

Tiká Yehova akitisa yo motema

Hana, ntoma Paulo mpe Mokonzi Davidi bakutanaki na makambo oyo etungisaki bango. Mateya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yehova abɔndisaki bango mpe akitisaki bango motema?

LISOLO YA BOMOI

Komekola bandakisa ya malamu ememeli ngai mapamboli ebele

Léonce Crépeault alobeli ndenge oyo bandakisa ya bandeko ya sembo esalisaki ye alongola kobanga mpe azwa ebele ya mapamboli mbula 58 oyo asali na mosala ya ntango nyonso.

Oyebaki yango?

Ndenge nini arkeoloji endimisi ete Beleshazare azalaki mokonzi na Babilone?