Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI No 1 2021 | Mpo na nini kobondela?

Osí obondelá Nzambe kasi omoni ete ayanoli na libondeli na yo te? Soki ezali bongo, ozali yo moko te. Bato mingi babondelá Nzambe mpo asilisa mikakatano na bango kasi esilá te. Masolo oyo ekolobela ntina oyo tosengeli kondima ete Nzambe ayokaka mabondeli na biso, mpo na nini Nzambe ayokaka mabondeli mosusu te, mpe ndenge nini okoki kobondela mpo Nzambe ayanola na mabondeli na yo.

 

Makambo oyo bato balobaka mpo na libondeli

Libondeli ezali likabo ya malamu mpenza oyo euti na Nzambe to kaka molulu moko ezangi ntina?

Nzambe ayokaka mabondeli na biso?

Biblia elobi ete Nzambe ayokaka biso ntango tobondelaka ye na ndenge ya malamu.

Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te?

Biblia emonisi lolenge ya mabondeli oyo Nzambe ayanolaka mpe oyo ayanolaka te.

Ndenge nini okoki kobondela mpo Nzambe ayoka mabondeli na yo?

Sololá na Nzambe bisika nyonso oyo olingi mpe na ntango nyonso oyo olingi, ezala na mongongo makasi to na motema. Yesu asalisi biso tóyeba oyo tokoloba na libondeli.

Ndenge oyo mabondeli ekoki kosalisa yo

Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa yo oyika mpiko ntango ozali na mikakatano?

Nzambe ayokaka mabondeli na yo?

Biblia elobi ete ntango obondelaka Nzambe, ayokaka yo mpe azali na mposa ya kosalisa yo.