Biblia eteyaka mpenza nini?

Buku oyo ya boyekoli ebongisami mpo na kosalisa yo oyeba mateya ndenge na ndenge ya Biblia: mpo na nini bampasi etondi na mokili, soki moto akufi akendaka wapi, ndenge ya kozala na bomoi ya esengo mpe bongo na bongo.

Nzambe alingaki bomoi ezala nde boye?

Okoki komituna mpo na nini mikakatano ezali mingi lelo oyo. Oyebaki ete Biblia elobi ete mosika te mbongwana ya solo ekosalema mpe ete okoki kozwa matomba na mbongwana yango?

MOKAPO 1

Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?

Okanisi Nzambe atyelaka yo mpenza likebi? Yekola bizaleli na ye mpe ndenge oyo okoki kopusana penepene na ye.

MOKAPO 2

Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa yo ntango ozali na mikakatano? Mpo na nini osengeli kondima bisakweli na yango na motema moko?

MOKAPO 3

Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?

Mokano ya Nzambe ya kosala mabelé ezala paradiso ekokokana? Soki Ɛɛ, ntango nini?

MOKAPO 4

Yesu Klisto azali nani?

Luká koyeba ntina oyo Yesu azali Masiya oyo alakamaki, autaki wapi, mpe mpo na nini azali mwana se moko oyo abotamaki ya Yehova.

MOKAPO 5

Lisiko—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso

Lisiko ezali nini? Ndenge nini okoki kozwela yango matomba?

MOKAPO 6

Bato oyo bakufá bazali wapi?

Yekolá makambo Biblia elobi mpo na koyeba esika moto akendaka soki akufi mpe ntina oyo bato bakufaka.

MOKAPO 7

Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá

Ndeko to moninga na yo moko akufá? Okoki komona ye lisusu? Luká koyeba makambo oyo Biblia ezali koteya mpo na lisekwa.

MOKAPO 8

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bato mingi bayebi libondeli ya Nkolo. Maloba oyo: “Bokonzi na yo eya” elimboli nini?

MOKAPO 9

Tozali na “mikolo ya nsuka”?

Makambo mpe bizaleli ya bato oyo tofandi na bango ezali komonisa polele ete nsuka ya mokili ekómi mpenza pene, kaka ndenge Biblia esakolaki.

MOKAPO 10

Bikelamu ya elimo—​Bakoki kosala biso mabe to malamu?

Biblia elobeli baanzelu mpe bademo. Bikelamu yango ya elimo bazali solo? Bakoki kosala yo malamu to mabe?

MOKAPO 11

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Bato mingi bakanisaka ete esengeli kopesa Nzambe foti mpo na bampasi nyonso oyo ezali na mokili. Bongo yo okanisi nini? Luká koyeba ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala.

MOKAPO 12

Bomoi oyo esepelisaka Nzambe

Okoki kozala na bomoi oyo ekosepelisa Yehova. Kutu, okoki kokóma moninga na ye.

MOKAPO 13

Talelá bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango

Ndenge nini Nzambe atalelaka likambo ya kosopa zemi, kokɔtisa to kotya makila na nzoto, mpe bomoi ya nyama?

MOKAPO 14

Ndenge ya kozala na libota ya esengo

Bolingo oyo Yesu amonisaki ezali ndakisa oyo mibali, basi, baboti, mpe bana basengeli kolanda. Mateya nini apesi biso?

MOKAPO 15

Losambo oyo Nzambe andimaka

Tótalela makambo motoba oyo emonisi bato oyo bazali na lingomba ya solo.

MOKAPO 16

Kangamá na losambo ya solo

Mikakatano nini okoki kokutana na yango ntango ozali koyebisa bato makambo oyo ondimaka? Ndenge nini okoki kosala yango na ndenge oyo ekosilikisa bango te?

CHAPTER 17

Pusaná penepene na Nzambe na libondeli

Nzambe ayokaka mabondeli na yo? Mpo na kozwa eyano na motuna oyo, osengeli koyeba malamumalamu makambo oyo Biblia eteyaka mpo na libondeli.

MOKAPO 18

Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe

Makambo nini moto asengeli kosala mpo azwa batisimo? Luká koyeba ndimbola na yango mpe ndenge esengeli kopesama.

MOKAPO 19

Tikalá na kati ya bolingo ya Nzambe

Ndenge nini tokomonisa ete tolingaka Nzambe mpe tokopesa ye matɔndi mpo na nyonso oyo asalelá biso?

APƐNDISI

Nkombo ya Nzambe​—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?

Mabongoli mingi ya Biblia elongoli nkombo ya Nzambe. Mpo na nini? Kosalela nkombo ya Nzambe ezali mpenza na ntina?

APƐNDISI

Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya

Bambula koleka 500 liboso, Nzambe amonisaki ntango mpenza oyo Masiya asɛngeli koya. Yekola makambo ya kokamwisa ya esakweli yango!

APƐNDISI

Yesu Klisto​—Masiya oyo alakamaki

Yesu akokisaki bisakweli nyonso oyo elobelaki Masiya. Luká na kati ya Biblia na yo mpe okomona ete makambo nyonso, ata ya mikemike, oyo elobemaki na bisakweli yango ekokisamaki.

APƐNDISI

Oyo osengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe Elimo Santu

Bato mingi bakanisaka ete liteya ya bosato ezali na kati ya Biblia. Okanisi ezali solo?

APƐNDISI

Ntina oyo baklisto ya solo basalelaka ekulusu te na losambo

Yesu akufaki mpenza na ekulusu? Tangá eyano na Biblia.

APƐNDISI

Bolei ya Mpokwa ya Nkolo​—Molulu oyo ekumisaka Nzambe

Baklisto bazwi etinda ya kosalaka Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Ntango nini mpe ndenge nini esɛngeli kosala yango?

APƐNDISI

“Molimo” ná “elimo” elimboli mpenza nini?

Bato mingi bakanisaka ete ntango moto akufi ezali na eliko mosusu oyo etikaka nzoto mpe ekobaka kozala na bomoi. Liloba ya Nzambe ezali koteya biso nini?

APƐNDISI

Sheole ná Hadesi ezali nini?

Babongoli mosusu basaleli maloba “lilita” to “lifelo” mpo na Sheole ná Hadesi. Kasi maloba yango elimboli mpenza nini?

APƐNDISI

Mokolo ya Kosambisama ezali nini?

Yekolá ndenge mokolo ya kosambisama ekozala mokolo ya mapamboli mpo na bato nyonso oyo bazali sembo.

APƐNDISI

1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia

Bilembeteli nini ya Biblia emonisi mpenza ete 1914 ezalaki mbula moko ya ntina mingi?

APƐNDISI

Mikaele anzelu-mokonzi nde nani?

Biblia ezali komonisa soki anzelu yango ya nguya azali nani. Yekolá makambo ebele na ntina na ye mpe makambo oyo akosala mosika te.

APƐNDISI

“Babilone Monene” ezali nini?

Mokanda ya Emoniseli elobeli mwasi oyo abengami “Babilone Monene.” Azali mwasi moko boye ya solosolo? Biblia elobi nini mpo na ye?

APƐNDISI

Yesu abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ?

Ntango ezalaka ndene nini na Beteleme na sanza ya Desɛmbɛ?

APƐNDISI

Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?

Bafɛti mingi oyo bato basalaka epai bofandi eutá wapi? Mbala mosusu okokamwa na biyano ya mituna yango.