“Yaká, landá ngai”

Mokano ya buku oyo ezali kaka te ya kosalisa biso tóyeba makambo nyonso oyo etali bomoi ya Yesu mpe mosala na ye, kasi mpe ya kosalisa biso tóyeba ndenge ya kolanda ye.

Maloba ya ebandeli

Tiká ete bolingo na yo mpo na Yesu ekola mpe olanda ye mpenza mpo osepelisa motema ya Yehova uta sikoyo mpe libela na libela.

MOKAPO 1

“Landá ngai”​​—Yesu alingaki koloba nini na maloba wana?

Kozala moyekoli ya Yesu esengeli kosuka kaka te na maloba mpe na ndenge oyo moto azali komiyoka.

MOKAPO 2

“Nzela, solo mpe bomoi”

Kopusana penepene na Tata ekoki kosalema kaka na nzela ya Mwana. Yesu azwaki mokumba monene mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe na molongo mobimba.

MOKAPO 3

“Ngai nazali . . . na komikitisa na motema”

Kobanda na ebandeli tii na nsuka ya mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki mpenza komikitisa.

MOKAPO 4

“Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda”

Yesu amonisaki mpiko lokola nkɔsi na makambo misato: kolongisa solo, kolongisa bosembo, mpe liboso ya botɛmɛli.

MOKAPO 5

“Biloko nyonso ya motuya ya bwanya”

Yesu amonisaki bwanya oyo eleki nyonso kaka na moloba te kasi mpe na misala.

MOKAPO 6

“Ayekolaki botosi”

Lokola Yesu azalaki kotosa Tata na ye na ndenge ya kokoka, mpo na nini Biblia elobi ete Yesu “ayekolaki botosi” mpe “akómisamaki moto oyo akoki na nyonso”?

MOKAPO 7

“Bótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko”

Yesu atiká ndakisa na likambo etali koyika mpiko. Nini esalisaki ye ayika mpiko? Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye na likambo yango?

MOKAPO 8

“Natindamaki mpo na yango”

Talá mpo na nini Yesu azalaki kosakola, makambo oyo azalaki kosakola, mpe ndenge oyo azalaki kotalela mokumba na ye ntango azalaki awa na mabele.

MOKAPO 9

“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”

Bayekoli ya solosolo ya Kristo bayebanaka na mosala oyo Yesu apesaki bango ya kokómisa bato bayekoli.

MOKAPO 10

“Ekomamá”

Kosalela Liloba ya Nzambe, kolongisa yango, mpe kolimbola yango ezali makambo oyo tosengeli kosalaka mpo na komekola lolenge oyo Yesu azalaki koteya solo.

MOKAPO 11

“Naino moto moko te alobá lokola moto yango”

Talá mayele misato ya koteya oyo Yesu asalelaki mpe ndenge yo mpe okoki kosalela yango.

MOKAPO 12

“Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”

Biblia elobeli bantina mibale ya minene oyo emonisi mpo na nini Yesu asalelaki bandakisa.

CHAPTER 13

“Ngai nalingaka Tata”

Ndenge nini tokoki kokómisa bolingo na biso makasi mpo na Yehova na ndakisa ya Yesu?

MOKAPO 14

“Ebele ya bato bapusanaki epai na ye”

Bato ebele, ná bana, bazalaki kobanga te kopusana epai ya Yesu. Nini ezalaki kosala ete ezala mpasi te mpo bato bápusana pene ya Yesu?

MOKAPO 15

“Ayokaki mawa”

Mpo na nini ezali na ntina tólanda ndakisa ya Yesu na likambo etali komonisela basusu motema mawa?

MOKAPO 16

“Yesu . . . alingaki bango tii na nsuka”

Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki na misala ete azalaki kolinga bayekoli na ye. Ndenge nini tokoki komekola bolingo yango ntango tozali kosalela basusu makambo?

MOKAPO 17

“Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo”

Ndenge nini tokoki komekola bolingo ya solosolo oyo Yesu azalaki na yango?

MOKAPO 18

“Kobá kolanda ngai”

Soki tokobi kolanda Yesu mokolo na mokolo, tokozala na lisosoli ya pɛto mpe na elikya mpo na mikolo ezali ekoya.