Teyá bana na yo

Baboti, bósalela masolo oyo mpo na koteya bana na bino mateya ya ntina mingi ya Biblia.

Maloba ya ebandeli

Maloba oyo euti na mokanda ya Kolimbola Mibeko ekoki kosalisa yo ntango ozali kobɔkɔla bana na yo.

LITEYA 1

Sekele oyo epesaka biso esengo mpo toyebi yango

Biblia elobeli sekele moko ya ntina mingi oyo ebengami “sekele mosantu.” Olingi koyeba makambo mosusu oyo etali sekele yango?

LITEYA 2

Rebeka alingaki kosepelisa Yehova

Tosengeli kosala nini mpo tózala lokola Rebeka? Tángá lisolo oyo mpe oyekola makambo mingi oyo etali ye.

LITEYA 3

Rahaba andimelaki Yehova

Talá ndenge Rahaba ná bandeko na ye babikaki ntango Yeriko ebebisamaki.

LITEYA 4

Asepelisaki tata na ye mpe Yehova

Mwana ya Yefeta atosaki elaka nini? Ndenge nini okoki komekola ye?

LITEYA 5

Samwele akobaki kosala makambo ya malamu

Ndenge nini okoki kolanda ndakisa ya Samwele mpe kosala malamu ata ntango bato mosusu bazali kosala makambo mabe?

LITEYA 6

Davidi azalaki kobanga te

Tángá lisolo yango ya Biblia mpo oyeba nini esalisaki Davidi azala na mpiko ndenge wana.

LITEYA 7

Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?

Ntango Eliya amiyokaki lokola mwana ya mawa, Yehova ayebisaki ye nini? Makambo oyo ekómelaki Eliya ekoki koteya biso nini?

LITEYA 8

Yosiya azalaki na baninga ya malamu

Biblia elobi ete ezalaki mpasi mpo Yosiya asala makambo ya malamu. Talá ndenge baninga na ye basalisaki ye.

LITEYA 9

Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Yehova

Atako bato bazalaki kosɛka ye, mpo na nini Yirimia atikaki te kolobela makambo ya Nzambe?

LITEYA 10

Yesu azalaki mwana ya botosi

Ntango mosusu kotosa baboti ezalaka mpasi. Talá ndenge ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa yo.

LITEYA 11

Bato oyo bakomaki makambo ya Yesu

Talá bato mwambe oyo bakomaki mpe Biblia, bafandaki eleko moko na Yesu, mpe bakomaki makambo ya bomoi na ye.

LITEYA 12

Mwana ya ndeko ya Paulo azalaki na mpiko

Elenge mobali yango abikisaki nɔkɔ na ye na liwa. Asalaki nini?

LITEYA 13

Timote alingaki kosalisa bato

Okoki kosala nini mpo ozala na bomoi ya esengo, lokola Timote?

LITEYA 14

Bokonzi oyo ekoyangela mabele mobimba

Makambo nini ekosalema ntango Yesu akoyangela mabele? Yo mpe olingi kozala wana?