Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

Na buku oyo, tángá makambo nyonso oyo esalemaki na bomoi ya Yesu ndenge ekomami na Biblia.

MALOBA YA EBANDELI

Nzela, solo mpe bomoi

Mateya ya Yesu mpe misala na ye oyo ezali na kati ya Baevanzile ekoki kobongola bomoi na yo.

MOKAPO 1

Nsango mibale oyo euti na Nzambe

Anzelu Gabriele ayebisi bansango oyo ezalaki mpasi mpo na kondima yango.

MOKAPO 2

Yesu akumisami liboso ya kobotama na ye

Ndenge nini Elizabeti ná mwana na ye oyo azalaki naino na libumu bakumisaki Yesu?

MOKAPO 3

Moto oyo akobongisa nzela abotami

Ntango kaka Zekaria akómaki koloba lisusu, apesaki esakweli moko ya ntina mingi.

MOKAPO 4

Maria akómi na zemi kasi abali naino te

Yozefe andimelaki Maria ntango ayebisaki ye ete azali na zemi oyo euti na moto mosusu te kasi nde na elimo santu?

MOKAPO 5

Yesu abotami wapi mpe ntango nini?

Ndenge nini toyebi ete Yesu abotamaki te mokolo ya 25 na sanza ya zomi na mibale?

MOKAPO 6

Mwana oyo alakamaki

Ntango Yozefe ná Maria bamemaki Yesu na tempelo wana azalaki naino mwana moke, bayisraele mibale ya mibange basakolaki makambo oyo ekokómela Yesu.

MOKAPO 7

Banganga-minzoto bayei kotala Yesu

Mpo na nini monzoto oyo bamonaki na ɛsti ememi bango mbala moko te epai ya Yesu, kasi naino epai ya mokonzi mabe Erode?

MOKAPO 8

Babiki na mabɔkɔ ya mokonzi moko mabe

Bisakweli misato ya Biblia oyo etali Masiya ekokisami na ebandeli ya bomoi ya Yesu.

MOKAPO 9

Yesu akoli na Nazarete

Yesu azalaki na bandeko ya mibali mpe ya basi boni?

MOKAPO 10

Libota ya Yesu basali mobembo na Yerusaleme

Yozefe ná Maria batambolaki motó mpo bazalaki komona Yesu te, nzokande Yesu akamwaki ndenge bayebaki te mbala moko esika oyo azalaki.

MOKAPO 11

Yoane Mobatisi abongisi nzela

Ntango Bafarisai mpe Basadukai mosusu bayeii epai na ye, Yoane apameli bango. Mpo na nini?

MOKAPO 12

Yesu azwi batisimo

Mpo na nini Yesu azwi batisimo soki asalaki lisumu te?

MOKAPO 13

Tozwá liteya na ndenge oyo Yesu alongaki komekama

Komekama oyo Yesu akutanaki na yango endimisi makambo mibale ya solo na ntina na Zabolo.

MOKAPO 14

Yesu abandi kokómisa bato bayekoli

Nini endimisi bayekoli motoba ya liboso ya Yesu ete bamoni Masiya?

MOKAPO 15

Yesu asali likamwisi na ye ya liboso

Yesu amonisi mama na ye ete Tata na ye ya likoló nde akómi sikoyo kopesa ye mitindo kasi ye te.

MOKAPO 16

Yesu amonisi molende mpo na losambo ya solo

Mobeko ya Nzambe epesaki bato nzela ya kosomba banyama na Yerusaleme mpo na bambeka, kasi mpo na nini Yesu asilikeli bato ya mombongo oyo bazali na tempelo?

MOKAPO 17

Yesu ateyi Nikodeme na butu

‘Kobotama lisusu’ elimboli nini?

MOKAPO 18

Mosala ya Yesu emati, oyo ya Yoane ekiti

Bayekoli ya Yoane bazali koyoka zuwa, atako Yoane azali na zuwa te.

MOKAPO 19

Yesu ateyi mwasi Mosamaria

Yesu ayebisi ye likambo moko oyo emonani ete ayebisá yango naino polele te moto mosusu liboso.

MOKAPO 20

Likamwisi ya mibale na Kana

Na ntaka ya kilomɛtrɛ 26, Yesu abikisi mwana moko.

MOKAPO 21

Na sinagoga ya Nazarete

Likambo nini Yesu alobaki oyo etindi bato ya engumba na ye báluka koboma ye?

MOKAPO 22

Bayekoli minei bakómi baluki-bato

Ayebisi bango bátika mosala ya koluka mbisi mpo bákóma baluki-bato.

MOKAPO 23

Yesu asali makamwisi minene na Kapernaume

Ntango Yesu abimisi bademo, apekisi bango báloba ete azali Mwana ya Nzambe. Mpo na nini?

MOKAPO 24

Yesu asakoli na Galile mobimba

Bato bayaki epai ya Yesu mpo abikisa bango, kasi Yesu amonisi ete mosala na ye ya kosakola ezali na ntina mingi koleka.

MOKAPO 25

Mawa etindi ye abikisa moto ya maba

Yesu amonisi na maloba ya pɛtɛɛ mpe ya nguya ete atyelaka bato oyo bazali kobɛla likebi.

MOKAPO 26

“Masumu na yo elimbisami”

Yesu amonisi boyokani nini oyo ezali kati na masumu mpe maladi?

MOKAPO 27

Abengi Matai

Mpo na nini Yesu azali kolya elongo na basumuki?

MOKAPO 28

Mpo na nini bayekoli ya Yesu bakilaka bilei te?

Yesu apesi ndakisa ya milangi ya vinyo oyo esalemi na mposo ya nyama mpo na koyanola.

MOKAPO 29

Moto akoki kosala makambo ya malamu na Sabata?

Mpo na nini Bayuda batye Yesu mpanzi likoló mpo abikisi moto moko oyo aumeli na maladi mbula 38?

MOKAPO 30

Boyokani ya Yesu ná Tata na ye

Bayuda bakanisi ete Yesu alobi ete akokani na Nzambe, kasi Yesu amonisi polele ete Nzambe aleki ye.

MOKAPO 31

Babuki mbuma ya blé na Sabata

Mpo na nini Yesu amibengi “Nkolo ya Sabata”?

MOKAPO 32

Makambo nini epekisami te na Sabata?

Basadukai ná Bafarisai oyo bayokanaka te, basangani mpo na likambo moko.

MOKAPO 33

Akokisi esakweli ya Yisaya

Mpo na nini Yesu apekisi bato oyo abikisi koloba soki azali nani to likambo oyo asali?

MOKAPO 34

Yesu aponi bantoma zomi na mibale

Ntoma ná moyekoli bakeseni na nini?

MOKAPO 35

Lisolo likoló ya Ngomba

Talá makambo ya ntina mingi oyo Yesu alobaki na lisolo na ye.

MOKAPO 36

Mokonzi moko ya basoda amonisi kondima monene

Mokonzi yango ya basoda asali nini oyo ekamwisi Yesu?

MOKAPO 37

Yesu asekwisi mwana ya mwasi oyo mobali akufá

Baoyo bamonaki likamwisi yango bakangaki mpenza ntina na yango.

MOKAPO 38

Yoane alingi koyeba makanisi ya Yesu

Mpo na nini Yoane Mobatisi atuni soki Yesu azali Masiya? Yoane azali na ntembe?

MOKAPO 39

Mawa na libota oyo eboyi kobongola motema

Yesu alobi ete na Mokolo ya Kosambisama, mokili ya Sodoma ekozala kutu mwa malamu koleka Kapernaume, engumba oyo Yesu abandaki mosala na ye.

MOKAPO 40

Liteya na oyo etali kolimbisa

Ntango Yesu ayebisaki mwasi oyo mbala mosusu azalaki ndumba ete masumu na ye elimbisami, alingaki nde koloba ete ezali mabe te kobuka mibeko ya Nzambe?

MOKAPO 41

Yesu azali kosala makamwisi na nguya ya nani?

Bandeko ya Yesu bamoni ete Yesu abɛli motó.

MOKAPO 42

Yesu apameli Bafarisai

“Elembo ya mosakoli Yona” ezali nini?

MOKAPO 43

Bandakisa oyo etali Bokonzi

Yesu apesi bandakisa mwambe mpo na kolimbola makambo etali Bokonzi ya likoló.

MOKAPO 44

Yesu akitisi mopɛpɛ makasi na mbu

Ntango Yesu akitisaki mopɛpɛ mpe mbonge, abimisaki liteya moko ya ntina mingi mpo na ndenge bomoi ekozala na boyangeli na ye.

MOKAPO 45

Aleki bademo na nguya

Demo moko to bademo ebele bakoki kokɔtela moto moko?

MOKAPO 46

Asimbi elamba ya Yesu mpe abiki

Yesu amonisi nguya mpe motema mawa na ye na likambo oyo.

MOKAPO 47

Elenge mwasi moko azongi lisusu na bomoi!

Bato basɛki Yesu ntango alobi ete elenge mwasi oyo akufaki alali kaka mpɔngi. Likambo nini ayebi oyo bango bayebi te?

MOKAPO 48

Asali makamwisi kasi baboyi ye ata na Nazarete

Bato ya Nazarete baboyi Yesu te mpo na mateya mpe makamwisi na ye, kasi mpo na ntina mosusu.

MOKAPO 49

Asakoli mpe apesi bantoma formasyo na Galile

Maloba ‘Bokonzi ya Nzambe ekómi pene’ elimboli mpenza nini?

MOKAPO 50

Babongisami mpo na kosakola ata na ntango ya minyoko

Mpo na nini Yesu ayebisi bantoma na ye bákima ntango banyokoli bango soki basengeli kobanga liwa te?

MOKAPO 51

Babomi moto mokolo ya fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya mbotama

Kobina ya Salome esepelisi Erode mpenza; na yango, alaki kopesa ye nyonso oyo akosɛnga. Likambo nini ya nsɔmɔ asɛngaki?

MOKAPO 52

Aleisi bankóto ya bato na mampa moke mpe mbisi moke

Likamwisi wana ya Yesu ezali na ntina mingi mpenza, yango wana Baevanzile nyonso minei elobeli yango.

MOKAPO 53

Mokonzi oyo akoki kopekisa mbonge mpe mopɛpɛ

Mateya nini bantoma bazwi ntango Yesu atamboli likoló ya mai mpe akitisi mopɛpɛ?

MOKAPO 54

Yesu azali “limpa ya bomoi”

Mpo na nini Yesu apameli bato atako basali makasi mpenza báya epai na ye?

MOKAPO 55

Maloba ya Yesu ezokisi bato mingi

Yesu ateyi likambo moko oyo esepelisi bato te, mpe mingi kati na bayekoli na ye batiki kolanda ye.

MOKAPO 56

Nini mpenza ekómisaka moto mbindo?

Ezali nde oyo ekɔtaka na monɔkɔ ya moto, to oyo eutaka na monɔkɔ na ye?

MOKAPO 57

Yesu abikisi mwana moko ya mwasi ná moto moko akufá matoi

Mpo na nini mwasi moko asilikaki te ntango Yesu akokanisaki bato ya ekólo na ye na bana ya mbwa?

MOKAPO 58

Akómisi mampa ebele mpe apesi likebisi mpo na levire

Nsukansuka bayekoli ya Yesu bakangi ntina ya levire oyo Yesu azali kolobela.

MOKAPO 59

Mwana ya moto azali nani?

Bafungola ya Bokonzi ezali nini? Nani asalelaki yango mpe ndenge nini?

MOKAPO 60

Kobongwana ya Kristo: Emonaneli ya nkembo na ye

Kobongwana ya Kristo ezalaki nini? Elimbolaki nini?

MOKAPO 61

Yesu abikisi elenge mobali moko oyo azalaki na demo

Yesu alobi ete mwana abikaki te mpo na kozanga kondima, kozanga kondima ya nani? Ya mwana yango, ya tata na ye, to ya bayekoli ya Yesu?

MOKAPO 62

Liteya monene ya komikitisa

Talá ndenge mikóló bayekoli likambo moko ya ntina epai ya mwana moke.

MOKAPO 63

Yesu apesi toli na likambo ya kobɛtisa libaku mpe lisumu

Yesu amonisi makambo misato oyo esengeli kosala soki matata makasi ebimi kati na bandeko.

MOKAPO 64

Ntina ya kolimbisa

Na lisalisi ya ndakisa ya moombo oyo azangá mawa, Yesu amonisi ete kolimbisa basusu ezali likambo monene na miso ya Nzambe.

MOKAPO 65

Ateyi na nzela ya Yerusaleme

Na masolo mikuse na bato misato, Yesu amonisi bizaleli oyo ekoki kopekisa moto akóma moyekoli na ye.

MOKAPO 66

Na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Batabernakle

Nini etindaki bato oyo bazalaki koyoka Yesu bákanisa ete azali na demo?

MOKAPO 67

“Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te”

Bakonzi mingi ya tribinale monene ya Bayuda balingaka Yesu te, kasi moko na bango azwi mpiko mpe akɔteli Yesu.

MOKAPO 68

Mwana ya Nzambe azali “pole ya mokili”

Yesu alobaki ete “solo ekopesa bino bonsomi.” Bonsomi na nini?

MOKAPO 69

Tata na bango​—Abrahama to Zabolo?

Yesu amonisi ndenge ya koyeba bana ya Abrahama mpe nani azali mpenza Tata na ye.

MOKAPO 70

Yesu abikisi moto oyo akufá miso banda kobotama

Bayekoli batuni Yesu mpo na nini moto wana akufá miso. Ezali mpo asalaki lisumu? Ezali nde baboti na ye? Bato mosusu basepeli te ntango Yesu abikisi moto yango.

MOKAPO 71

Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso

Makambo oyo moto oyo akufá miso alobi epesi Bafarisai nkanda makasi. Kaka ndenge baboti ya moto yango babangaki esalema, Bafarisai babengani moto yango na sinagoga.

MOKAPO 72

Yesu atindi bayekoli 70 bákende kosakola

Na Yudea, Yesu atindi bayekoli 70, mibalemibale, bákende kosakola nsango ya Bokonzi. Bayekoli bakuti bato wapi​—na basinagoga to na bandako na bango?

MOKAPO 73

Mosamaria ya motema malamu

Ndenge nini Yesu asaleli ndakisa ya Mosamaria malamu mpo na koteya liteya ya ntina mingi?

MOKAPO 74

Liteya etali koyamba bapaya mpe kobondela

Yesu akei kotala Maria ná Marta na ndako na bango. Liteya nini ateyi bango oyo etali koyamba bapaya? Mpe ndenge nini na nsima ateyi bayekoli na ye na makambo oyo basengeli kobondela?

MOKAPO 75

Yesu amonisi likambo oyo epesaka esengo

Yesu ayebisi bato oyo bazalaki koloba na ye mabe na makambo etali “mosapi ya Nzambe” mpe ayebisi bango ndenge “bokonzi ya Nzambe eleki” bango kaka boye. Amonisi mpe ndenge bato bakoki kozwa esengo ya solosolo.

MOKAPO 76

Alei epai ya Mofarisai moko

Yesu amonisi polele bokosi ya Bafarisai ná bakomeli na makambo ya losambo. Wapi mikumba ya kilo bazali komemisa bato?

MOKAPO 77

Yesu apesi toli mpo na bozwi

Yesu apesi ndakisa ya mozwi moko oyo atongi bandako ya kobomba biloko ya minene. Toli nini apesi lisusu mpo na komonisa makama ya koluka bozwi na lokoso?

MOKAPO 78

Kapita ya sembo, milɛngɛlá!

Yesu amonisi ete azali kotyela bamposa ya elimo ya bayekoli na ye likebi. Kapita ya sembo azali na mokumba nini mpo na bolamu ya elimo ya bayekoli? Mpo na nini toli ya komilɛngɛla ezali na ntina?

MOKAPO 79

Ekólo moko eponi nzela ya libebi

Yesu alobi ete bato oyo azali koluka kosalisa bazali na molɔngɔ ya bato oyo bakoki kobomama soki babongoli motema te. Bakozwa liteya ya ntina oyo Yesu alingi koteya bango ete bázala na boyokani malamu na Nzambe?

MOKAPO 80

Mobateli ya mpate oyo aleki malamu mpe mapango ya bampate

Boyokani oyo ezalaka kati na mobateli ya mpate mpe bampate na ye, ezali komonisa mpenza boyokani malamu oyo ezali kati na Yesu ná bayekoli na ye. Bakoyeba mateya na ye mpe bakolanda ye?

MOKAPO 81

Yesu ná Tata na ye bazali moko​—Na ndenge nini?

Bafundi mpe Yesu ete amikokanisi na Nzambe. Ndenge nini, na bwanya nyonso, akweisi bifundeli yango?

MOKAPO 82

Mosala ya Yesu na Perea

Yesu amonisi na bato oyo bazali koyoka ye likambo oyo basengeli kosala mpo na kobika mpe mpo na nini bato mingi bakobika te. Toli na ye ezalaki na ntina mingi mpo na bato oyo bazalaki koyoka ye. Ezali mpe na ntina mpo na biso lelo oyo?

MOKAPO 83

Nzambe abengisi banani mpo na kolya?

Ntango Yesu azali kolya na mpokwa na ndako ya Mofarisai moko, apesi ndakisa ya fɛti moko monene. Apesi liteya moko oyo ezali na ntina mingi mpo na basaleli nyonso ya Nzambe. Liteya nini?

MOKAPO 84

Kozala moyekoli ya Yesu ezali likambo ya lisɛki te

Kozala moyekoli ya Kristo ezali mokumba monene. Yesu amonisi likambo yango polele. Bato mosusu oyo bakokóma bayekoli bakosepela te na makambo oyo alobi.

MOKAPO 85

Basepelaka ntango mosumuki abongoli motema

Bafarisai mpe bakomeli balobeli Yesu mabe mpo azalaki kotyela bato mpamba likebi. Mpo na koyanola, Yesu apesi bandakisa oyo emonisi ndenge Nzambe atalelaka basumuki.

MOKAPO 86

Mwana oyo abungaki azongi

Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana oyo abungaki?

MOKAPO 87

Salelá bwanya mpo ozala malamu lobi

Yesu alobeli ndakisa ya mosali ya ndako moko ya mayele mabe mpe oyo azangi bosembo mpo na koteya liteya moko ya kokamwisa.

MOKAPO 88

Mbongwana mpo na mozwi mpe Lazare

Sekele mpo na kokanga ntina ya ndakisa oyo ya Yesu ezali ya koluka koyeba soki bato mibale oyo balobeli ezali banani.

MOKAPO 89

Ateyi na Perea ntango azali kokende na Yudea

Amonisi polele ezaleli moko oyo ekoki kosalisa biso tólimbisaka ata baoyo basalelaka biso mabe mbala na mbala.

MOKAPO 90

“Lisekwa mpe bomoi”

Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete baoyo bazali kondimela ye ‘bakokufa mokolo moko te’?

MOKAPO 91

Lazare asekwi

Makambo mibale ya lisolo oyo esali ete ata batɛmɛli bakoka te kowangana likamwisi ya Yesu.

MOKAPO 92

Bato zomi ya maba babikisami​—Moko amonisi botɔndi

Moto oyo abikisami amonisi botɔndi kaka epai ya Yesu te kasi mpe epai ya moto mosusu.

MOKAPO 93

Mwana ya moto akomonana

Na ndenge nini kozala na ye ekozala lokola mokalikali?

MOKAPO 94

Makambo mibale ya ntina mingi: Libondeli mpe komikitisa

Na ndakisa oyo apesi ya mosambisi ya mabe ná mwasi moko oyo mobali akufá, Yesu amonisi mpenza ntina ya ezaleli moko boye.

MOKAPO 95

Mateya etali koboma libala mpe kolinga bana

Yesu ataleli bana na ndenge oyo ekeseni mpenza na bayekoli na ye. Mpo na nini?

MOKAPO 96

Yesu ayanoli elenge mokonzi moko ya bozwi

Nini etindaki Yesu aloba ete kokɔta ya kamela na lidusu ya ntonga ezali pɛtɛɛ koleka kokɔta ya mozwi na bokonzi ya Nzambe?

MOKAPO 97

Ndakisa ya basali na elanga ya vinyo

Ndenge nini bato ya liboso bakómi bato ya nsuka?

MOKAPO 98

Bantoma baluki lisusu kozala na esika ya lokumu

Yakobo ná Yoane basɛngi Yesu atya bango na esika moko ya lokumu na Bokonzi, kasi bazali kaka bango moko te.

MOKAPO 99

Yesu abikisi mibali oyo bakufá miso mpe asalisi Zakai

Ndenge nini tokoki koyokanisa lisolo ya Yesu oyo abikisi moto moko akufá miso na Yeriko, lisolo oyo ezali komona lokola ete eyokani te na baevanzile?

MOKAPO 100

Ndakisa ya mina zomi

Yesu alingi mpenza koloba nini ntango alobi ete: “Moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mingi; kasi moto oyo azali na eloko te, ata oyo azali na yango bakobɔtɔla yango”?

MOKAPO 101

Alei na ndako ya Simo na Betania

Maria, ndeko ya Lazare ya mwasi, asali eloko moko oyo ebimisi ntembe. Yesu akɔteli ye.

MOKAPO 102

Mokonzi akɔti na Yerusaleme likoló ya mwana mpunda

Akokisi esakweli oyo elobamaki mbula 500 liboso.

MOKAPO 103

Apɛtoli lisusu tempelo

Bato ya mombongo ya Yerusaleme bamonanaka ete basalaka mombongo na bosembo, kasi mpo na nini Yesu abengi bango miyibi?

MOKAPO 104

Bayuda bayoki mongongo ya Nzambe​—Bakondima?

Kondimela Yesu mpe kosala makambo oyo eyokani na kondima yango ekeseni na nini?

MOKAPO 105

Asaleli nzete ya figi mpo na kopesa liteya etali kondima

Yesu ateyi bayekoli na ye nguya oyo kondima ezali na yango mpe ayebisi ntina oyo Nzambe aboyi ekólo Yisraele.

MOKAPO 106

Ndakisa mibale mpo na elanga ya vinyo

Luká koyeba ndimbola ya ndakisa ya tata oyo atindaki bana na ye mibale bákende kosala na elanga na ye ya vinyo mpe moto oyo atikaki elanga na ye ya vinyo na mabɔkɔ ya basali-bilanga ya mabe.

MOKAPO 107

Mokonzi abengi baoyo babengisami na fɛti ya libala

Ndakisa ya Yesu ezali nde esakweli.

MOKAPO 108

Yesu akimi ntango baluki kokanga ye

Akangisi bango monɔkɔ: liboso Bafarisai, na nsima Basadukai, na nsuka banguna na ye oyo basangani.

MOKAPO 109

Abimisi polele botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba

Mpo na nini Yesu atiki nzela te na bokabwani ya mangomba?

MOKAPO 110

Mokolo ya nsuka ya Yesu na tempelo

Asaleli ndakisa ya mwasi mobola oyo mobali akufá mpo na kopesa liteya moko monene.

MOKAPO 111

Bantoma batuni elembo

Esakweli na ye ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na siɛklɛ ya liboso. Ekokaki mpe kokokisama na monene na yango?

MOKAPO 112

Liteya oyo etali kosɛnzɛla​—Bangɔndɔ

Yesu ateyaki nde ete ndambo ya bayekoli na ye bazali bazoba mpe ndambo mosusu bazali mayele?

MOKAPO 113

Ndakisa ya talanta emonisi ntina ya kozala na molende

Ndakisa ya Yesu elimboli maloba oyo: “Moto nyonso oyo azali na eloko, bakobakisela ye mosusu.”

MOKAPO 114

Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba

Yesu apesi ndakisa moko ya ntina mingi mpo na komonisa ndenge lisambisi ya libela ekosalema.

MOKAPO 115

Elekeli ya nsuka ya Yesu ekómi pene

Mpo na nini ezali na ntina mingi ndenge bakonzi ya mangomba bandimi kopesa Yudasi kaka shekele ya palata 30 ndenge atɛki Yesu?

MOKAPO 116

Ateyi komikitisa na Elekeli ya nsuka

Akamwisi bantoma na ye na ndenge asali mosala ya baombo.

MOKAPO 117

Bilei ya mpokwa ya Nkolo

Yesu abandisi ekaniseli moko oyo bayekoli na ye bakobanda kosala mbula nyonso na mokolo ya 14 Nisana.

MOKAPO 118

Bawelani mpo na koyeba nani aleki baninga

Bantoma babosani liteya oyo Yesu autaki kopesa bango kaka na butu yango. Na boboto nyonso, Yesu asemboli bango.

MOKAPO 119

Yesu azali nzela, solo mpe bomoi

Yesu amonisi polele ndenge ya kopusana penepene na Nzambe.

MOKAPO 120

Kobota mbuma mpe kokóma baninga ya Yesu

Na ndenge nini bayekoli ya Yesu “babotaka mbuma”?

MOKAPO 121

“Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili”

Ndenge nini Yesu akolonga mokili soki mokili yango ebomi ye?

MOKAPO 122

Libondeli ya nsuka na shambrɛ ya likoló

Amonisi polele ete asali likambo oyo eleki kopesa bato lobiko.

MOKAPO 123

Azali kobondela ntango azali na mawa makasi

Mpo na nini Yesu abondeli ete: “Longolelá ngai kɔpɔ oyo”? Azalaki nde kokima mokumba na ye ya kosikola bato?

MOKAPO 124

Batɛki Kristo mpe bakangi ye

Yudasi ayebi esika akoki komona Yesu ata na katikati ya butu.

MOKAPO 125

Bamemi Yesu epai ya Anasi, na nsima epai ya Kaifa

Basambisi Yesu na bosembo te.

MOKAPO 126

Petro awangani Yesu na ndako ya Kaifa

Ndenge nini Petro, moto ya kondima oyo akangamá na Nzambe awangani Yesu mbala moko kaka boye?

MOKAPO 127

Nsima ya kosamba na Sanedrina, bamemi ye epai ya Pilate

Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bamonisi polele makanisi na bango ya mabe.

MOKAPO 128

Pilate ná Erode bazwi ye na likambo te

Mpo na nini Pilate atindi Yesu epai ya Erode mpo asambisa ye? Pilate azali na bokonzi ya kosambisa Yesu te?

MOKAPO 129

Pilate alobi: “Talá! Moto!”

Ata Pilate andimi ete Yesu azali na bizaleli malamu.

MOKAPO 130

Bakabi Yesu mpe bakei koboma ye

Mpo na nini Yesu ayebisi basi oyo bazali kolela ete bálela ye te kasi bálela mpo na bango moko mpe bana na bango?

MOKAPO 131

Mokonzi moko oyo asali eloko te babaki ye na nzete

Yesu apesi moyibi moko oyo abakami pene na ye elikya oyo ekokokisama na mikolo ezali koya.

MOKAPO 132

“Ya solo moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe”

Makamwisi lokola molili makasi na moi, koningana makasi ya mabele, mpe kopasuka ya rido ya tempelo, yango nyonso emonisi likambo moko.

MOKAPO 133

Babongisi nzoto ya Yesu mpe bakundi yango

Mpo na nini balingi kokunda Yesu nokinoki liboso moi elala?

MOKAPO 134

Lilita etikali mpamba: Yesu azali na bomoi!

Nsima ya kosekwa, Yesu abimeli liboso moyekoli moko ya mwasi kasi bantoma na ye te.

MOKAPO 135

Yesu asekwi mpe abimeli bato mingi

Yesu asali nini mpo na komonisa bayekoli na ye ete asekwi?

MOKAPO 136

Na libongo ya Mbu ya Galile

Yesu ayebisi Petro mbala misato ndenge oyo Petro akoki komonisa ete alingaka ye.

MOKAPO 137

Bato ebele bamoni ye liboso ya Pantekote

Banda ntango Yesu asekwi tii ntango amati na likoló, ayebisi bayekoli na ye mbala na mbala ete bakozwa elimo santu mpe ayebisi bango ndenge ya kosalela yango.

MOKAPO 138

Kristo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe

Yesu azalaki kosala nini wana azalaki kozela ntango ya kobengana banguna na ye?

MOKAPO 139

Yesu atye paradiso mpe asilisi mosala na ye

Azali naino na makambo mingi ya kosala liboso azongisela Nzambe Tata na ye Bokonzi.

Mpo omekola Yesu . . .

Yesu amonisi mbala na mbala bizaleli malamu mwambe bomoi na ye mobimba.

Index ya bavɛrsɛ

Salelá index oyo mpo na komona esika bavɛrsɛ nyonso ya Evanzile elobelami na buku oyo.

Index ya bandakisa (Masese)

Luká mokapo ya buku esika ndakisa ya Yesu mokomoko elobelami.

Bisakweli mosusu oyo etali Masiya

Luká likambo moko na bomoi ya Yesu oyo ekokani na esakweli moko ya Biblia oyo emonisi ete azali Masiya mpe luká mokapo ya buku oyo elobeli likambo yango.

Bamboka oyo Yesu afandaki mpe ateyaki

Karte oyo elakisi bisika Yesu asalaki mosala na ye.