Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova

Tángá makambo etali Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba mpe lisolo na bango na ekólo Géorgie.

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

Bamonisaka ete balingaka mpe basepelaka na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.

Mosala ya kosakola na mokili mobimba esengeli kozwa esika ya liboso

Ndenge nini bandeko oyo bazalaki na Betele bazali komesana na bomoi ya sika na teritware?

“Na kartye oyo, bino bozali bato malamu koleka”

Na mokolo ya 07 mpe 08/05/2016, oyo bafungolaki Betele mpo na kolakisa bililingi oyo emonisi lisolo ya Biblia, litatoli malamu epesamaki na bato ya kartye oyo bazali zingazinga ya Betele ya Brooklyn

Likita ya sika mpo na Bomoi mpe mosala ya bakristo

Na sanza ya yambo 2016, mbongwana esalemaki na makita ya kati ya pɔsɔ na masangá ya mokili mobimba.

TV JW ‘ezali kolendisa biso mpe kokitisa biso mitema!’

TV JW ebandaki na mobu 2014 mpe sikoyo bato bazali kotala yango na minɔkɔ koleka 90. Bato oyo batalaka yango balobi nini?

Molulu ya kofungola Babetele

Molulu ya kofungola bandako ya sika ya Betele ya Arménie mpe ya Kirghizistan ezalaki ntango ya esengo mpo na basaleli ya Yehova na bikólo yango.

Bikateli ya batribinale na 2016

Makambo nini ya kosamba na tribinale Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na 2016?

Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge

Bansango ya sika oyo etali misala ya Batatoli ya Yehova na Allemagne, Argentine, Bélize, Burundi, Congo (Kinshasa), Italie, Népal, Ouganda, mpe Papouasie-Nouvelle-Guinée.

Afrika

Tángá makambo oyo bandeko bakutanaki na yango mpe mwa makambo etali misala ya Batatoli ya Yehova ya koyekola na bato Biblia na Ghana, Guinée-Bissau, Liberia, Malawi, Sierra Leone, mpe Togo.

Amerika

Makambo oyo esalemaki na Brésil, États-Unis, Haïti, Mexique, mpe Vénézuéla.

Azia mpe Moyen-Orient

Mwa makambo oyo esalemaki na Hong Kong, Mongolie, Philippines, mpe Sri Lanka.

Mpoto

Tángá makambo oyo esalemaki na Azerbaïdjan, Bulgarie, Danemark, Géorgie, Grande-Bretagne, Hongrie, Norvège, mpe Ukraine.

Océanie

Mwa makambo oyo bandeko bakutanaki na yango na Australie, Guam, Nouvelle-Calédonie, Papuasie-Nouvelle-Guinée mpe Timor oriental.

Makambo etali Géorgie

Talá mwa makambo etali ekólo yango oyo ezalaka pembeni ya Mbu Moindo, bato na yango, mimeseno ya mboka mpe monɔkɔ na yango oyo ekeseni na minɔkɔ mosusu.

Bato ya liboso oyo balukaki solo

Bato oyo basepelaki na solo bayaki na Géorgie mpe bapalanganisi nsango ya Bokonzi.

Makita esalisaka bato nyonso bákolisa kondima

Ndenge nini makita ya bokristo mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Géorgien etyaki fondasyo mpo na bokoli oyo emonanaki na nsima?

Nazalaki na mposa mpenza bomoi na ngai ebongwana

Nsima ya kosilisa formasyo ya mosala ya soda, Davit Samkharadze abondelaki Nzambe asalisa ye mpo abongwana. Mokolo oyo elandaki, akutanaki na Batatoli ya Yehova.

Nalukaki litambwisi ya Yehova

Tamazi Biblaia amonaki mpe azwaki lisalisi ya Yehova liboso akende kofanda na engumba mosusu.

“Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema”

Natela Grigoriadis akutanaki na ‘mokakatano’ moko ya mpasi ntango azalaki kosalisa na mosala ya ko-imprimer mikanda oyo elimbolaka Biblia.

Biblia na monɔkɔ ya Géorgien

Bamaniskri ya kala ya Biblia na monɔkɔ ya Géorgien oyo ekomamaki na katikati ya siɛklɛ ya mitano ya ntango na biso to mwa moke liboso.

“Nzambe azalaki kokolisa.”—1 Ko. 3:6.

Ntango ekólo Géorgie ezwaki lipanda, na nsima Batatoli ya Yehova bamonaki bokoli moko makasi.

Babateli ya mpate ya bolingo bapesi formasyo

Ntango bokonzi ya ba-communiste ekweaki, ndenge nini Batatoli babongisaki masangá, makita, mayangani mpe mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia?

Mobali na ngai azalaki kokoka kotika kotánga yango te!

Badri Kopaliani azalaki na mposa makasi ya kotánga Biblia na ye ya sika, azwaki konje na mosala mpo atánga yango mobimba.

Banda kala wana bozalaki wapi?

Mwa basanza nsima ya kozwa batisimo, Artur Gerekhelia akendaki esika oyo mposa ya basakoli ezalaki makasi.

Namonaki ete bomoi na ngai ezalaki malamu mpenza

Madona Kankia, mwasi moko oyo azalaki kokɔta na likita ya parlema ya ba-Koministe na Géorgie, azwaki ekateli ya kosala makambo mosusu.

Bolingo ya solosolo ya bokristo esilaka soki moke te

Ntango bitumba ezalaki na Abkhazie, Igor Ochigava ná Gizo Narmania basalisaki bandeko bázwa mikanda mpe bilei.

Namonaki na miso na ngai moko oyo Biblia elobi!

Atako azalaki kosepela na Batatoli ya Yehova te, Pepo asalaki oyo mama na ye ayebisaki ye: ‘Yo moko kende komona makambo bateyaka.’

Mapamboli na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi.’—2 Tim. 4:2.

Na mbula wana, motángo ya basakoli emataki makasi, kasi na nsima botemeli ebimaki epai ya bato oyo bayebanaki te.

Minyoko epekisaki bango te kosalela Yehova

Bato basalaki nini ntango bazalaki konyokola Batatoli ya Yehova na Géorgie?

“Yango nde libula ya basaleli ya Yehova.”—Yis. 54:17.

Basakoli oyo bazali kosala milende mpo na kopalanganisa mosala ya teokrasi bamoni mapamboli ya Yehova.

Bakanisaki Mozalisi na bango Monene

Na Géorgie, soki tozwi babongisi-nzela misato, moko azali na mbula 25 to na nse.

Bato ya Kurde bayambi solo

Bato oyo babangaka Nzambe bazali na esengo ya koyoka nsango malamu na monɔkɔ ya mboka na bango.

Bolingo ebuki bandelo oyo bato batyá

Bankoko mibale bamoni na miso bolingo ya bondeko.

Eleki sikoyo mbula nkama—1917

Mpo na Bayekoli ya Biblia, mobu 1917 ezalaki mobu moko ya komekama mpe kopɛtolama. Atako mikakatano ezalaki, bato ya sembo bakobaki kosala mosala mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso.

Mitángo mpo na 2016

Lapolo oyo eyebisi makambo ndenge na ndenge oyo emonisi mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na boumeli ya mobu 2016.

Lapolo ya mobu ya mosala 2016 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba

Lapolo oyo ezali na mitángo ya bandeko, bafiliale, bikólo, bayangani na Ekaniseli mpe makambo mosusu.