GÉORGIE | 1991-1997
Babateli ya mpate ya bolingo bapesi formasyo
Na ebandeli ya bambula ya 1990, masangá mingi ya ekólo Géorgie ezalaki kaka na nkulutu moko to mosaleli na misala moko. Masangá yango ezalaki na bituluku ndenge na ndenge oyo bato na bato bazalaki kosala makita na bango, mpo basakoli bazalaki kofanda mosikamosika na teritware wana ya monene oyo esangisaki bamboka mpe bingumba mingi.
Joni Shalamberidze ná Pavle Abdushelishvili, oyo basalaki na bateritware ya mosika, batindaki bango bápesa mabɔkɔ na Telavi, engumba moko oyo ezali na etúká ya Kakhétie. Kuna, lisangá ezalaki na basakoli 300, kasi
ezalaki ata na nkulutu moko te. Ezalaki na bituluku 13 oyo bato na bato bazalaki koyangana na esika na bango.Eumelaki te, Joni ná Pavle bamonaki mokakatano moko monene oyo ezalaki kosala ete bandeko bákola te na elimo. Joni alobi boye: “Bandeko mingi bazalaki na bilanga ya minene ná bilanga ya vinyo. Lokola na bamboka bato bazalaki na momeseno ya kosalisa baninga na mosala ya bilanga, bandeko na biso bazalaki kolekisa ntango mingi elongo na bato oyo bazalaki Batatoli te.”
Joni ná Pavle bapesaki bandeko likanisi ete bábengaka Batatoli mosusu mpo básalisaka bango na misala yango. Soki basali bongo, bakozala na baninga ya malamu ntango bazali kosala mosala ya bilanga. (Mos. 4:9, 10) Joni alobi boye: “Bolingo ya bondeko ekómaki makasi mpenza na lisangá.” Ntango Joni ná Pavle balongwaki na engumba Kakhétie nsima ya mbula misato, batikaki bankulutu 5 mpe basaleli na misala 12.
Makita ekolisaka makoki ya kosakola
Lokola epekiseli ezalaki kaka tii na ebandeli ya bambula ya 1990, Batatoli bazalaki koyangana na mwa bituluku mpo na kosala kaka Boyekoli ya mokanda na Lisangá mpe Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Atako makita yango ezalaki kolendisa, kasi ebongisamaki te mpo na kopesa basakoli formasyo ya mosala ya kosakola.
Makambo ebongwanaki ntango boyangeli ya Bakoministe ekweaki. Ebongiseli ya Yehova eyebisaki sikoyo masangá esalaka Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ná Likita ya mosala na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ.
Naili Khutsishvili ná ndeko na ye ya mwasi Lali Alekperova babosanaka te makambo ya malamu ya makita yango. Lali alobi boye: “Ezalaki bantango ya malamu.
Moto nyonso azalaki na esengo mpo bandeko basi mpe bakómaki kosala masolo.”Naili alobi boye: “Na elakiseli moko, ndeko oyo azalaki nkolo-ndako azalaki kotánga zulunalo na estrade, na mbala moko ayoki bato babɛti porte. Ntango ayebisaki bango bákɔta, bandeko basi mibale bakɔtaki na porte ya monene mpe bamataki na estrade!” Lali abakisi boye: “Atako na bantango mosusu makita yango ezalaki kokamwisa, kasi esalisaki biso tókolisa makoki na biso ya kosakola.”
Mposa ya bilei ya elimo ekómaki makasi
Na boumeli ya bambula mingi, mwa bandeko basalelaki na ndako bamasini ya fotokopi mpo na kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Lokola bato bazalaki na mposa ya mikanda mingi lisusu, bandeko bakómaki koluka bakompanyi oyo enyataka na masini mikanda, oyo ekoki kobimisa na masini bazulunalo na biso na ntalo malamu.
Bandeko bazalaki kobongisa malamumalamu kopi oyo bakosalela mpo na konyata na masini mikanda yango. Bazalaki kobɛta malamumalamu na masini makambo oyo babongolaki na monɔkɔ ya Géorgien na kolanda ndenge ezali na zulunalo ya Lingelesi. Na nsima, bandeko bazalaki kokata bililingi oyo ezalaki na zulunalo ya Lingelesi mpe kobamba yango na mokanda oyo babongoli. Na nsuka, bazalaki kokata balɛtrɛ na bazulunalo oyo makomi na yango ezalaki kitoko mpenza mpe kobamba yango na lokasa ya ezipeli. Na nsima, bazalaki komema yango na izini ya konyata mikanda na masini.
Ntango ba-ordinatɛrɛ ebimaki, bilenge mibali mibale, Levani Kopaliani ná Leri Mirzashvili, balandaki formasyo ya koyekola ndenge malamu ya kosalela yango. Leri alobi boye: “Toyebaki makambo mingi te mpe
makambo ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, na lisalisi ya Yehova, eumelaki te, tokómaki kosalela ordinatɛrɛ mpo na kobɛta mpe kobongisa bazulunalo na biso.”Atako mikakatano ezalaki, masangá ya ekólo Géorgie mobimba ebandaki kozwa bazulunalo ya langi minei oyo ezalaki kouta kaka na Géorgie. Kasi na nsima, ekómaki mpasi kobimisa motángo ya mikanda oyo bato bazalaki na yango mposa. Na ntango oyo ebongi, Yehova apesaki basaleli na ye ya Géorgie litambwisi oyo esengeli na nzela ya ebongiseli na ye.
Mbongwana monene esalemi
Na 1992, liyangani oyo esangisaki mikili mingi esalemaki na Saint-Pétersbourg, na Russie, epesaki bandeko oyo bautaki Géorgie libaku ya kokutana na bamonisi ya filiale ya Allemagne. Genadi Gudadze alobi: “Balimbolelaki biso ndenge mosala ya kobongola esalemaka. Bayebisaki biso ete na ntango moko boye, bandeko bakoya kotala biso mpo básalisa biso na mosala ya kobongola.”
Konyata na masini mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Géorgien ezalaki pɛtɛɛ te. Lokola ekomeli na yango ekeseni na oyo ya minɔkɔ mosusu, programɛ ya MEPS ezalaki naino kokoka te kosalela alfabɛ ya monɔkɔ ya Géorgien. Yango wana, esɛngaki básalela masini ya kokanga balɛtrɛ yango fɔtɔ mpe kobimisa mikanda.
Na nsuka ya bambula ya 1970, libota ya Datikashvili na Géorgie ekendeki na États-Unis mpe na nsima Marina, mwana na bango ayekolaki solo. Asalisaki mpenza ntango bandeko ya Betele ya Brooklyn bazalaki koyema lɛtrɛ mokomoko ya monɔkɔ ya Géorgien mpo na kokɔtisa alfabɛ na yango na programɛ ya MEPS. Eumelaki te, mwa batrakte mpe mwa buku “Talá! Nazali kozalisa biloko nyonso biloko ya sika” enyatamaki na Allemagne.
Lisalisi mpo na kobongisa mosala ya kobongola
Na 1993, Michael Fleckenstein ná mwasi na ye Silvia, oyo bautaki na filiale ya Allemagne, bayaki na Tbilissi mpo na kotya biro ya kobongola. Michael alobi boye: “Nabosanaka te likita oyo esalemaki na Saint-Pétersbourg. Sanza 18 na nsima, ntango tokómaki na Tbilissi, tokamwaki mpenza ntango balakisaki biso ekipi ya kobongola oyo ebongisamaki malamu!”
Kaka nsima ya mwa basanza, ekipi ya babongoli 11 ekómaki kobongola mikanda na biro oyo ezalaki na ndako moko ya moke. Na nzela ya formasyo oyo ebongiseli ya Yehova epesaki, masangá ekómaki kozwa ebele ya bilei ya elimo.
Kopesa bilei ya elimo na ntango ya mobulu
Nsima ya kokabwana ya Union Soviétique, bikólo mpe bana-mboka babimisaki mobulu mpe bitumba na barepibliki ndenge na ndenge, ezala mpe na Géorgie. Yango wana, kosala mibembo, mingimingi kokende na mboka mosusu ekómaki likama mpenza.
Mokolo moko na sanza ya zomi na moko ya mobu 1994, ntango ndeko Aleko Gvritishvili ná bandeko mosusu
mibale bakatisaki ndelo ya ekólo na bango, etuluku moko ya bato oyo bazalaki na mandoki babimelaki bango mpe bapesaki bango mitindo bákita na motuka. Aleko alobi boye: “Basilikaki ntango bamonaki mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Batɛlɛmisaki biso na molɔngɔ lokola nde balingi báboma biso. Tobondelaki Yehova na etingya. Nsima ya ngonga soki mibale, moko na bango alobaki na biso ete ‘bókamata mikanda na bino bókende, soki bozongi awa, tokotumba motuka na bino mpe tokoboma bino.’”Atako babangisaki bango ndenge wana, bandeko bakobaki kokabola bilei ya elimo. Ndeko Zaza Jikurashvili, oyo amipesaki mpenza na komemela bandeko mikanda na Géorgie, alobi boye: “Toyebaki ete bandeko na biso bazalaki na mposa ya bilei ya elimo. Basi na biso basalisaki biso mingi mpenza.”
Ndeko Aleko alobi lisusu boye: “Bandeko mingi oyo bamipesaki na kokende kotika mikanda, bazalaki batata ya mabota.” Nini etindaki bango básala yango atako ezalaki likama? Abakisi lisusu boye: “Ezali libosoliboso mpo na botɔndi mpe bolingo na biso epai ya Yehova. Tolingaki mpe komekola ndenge Yehova atyelaka bandeko na biso likebi.”
Lokola bandeko yango bamipimelaki bongo, bakobaki kokende kotika mikanda na boumeli ya bambula wana ya mobulu. Na nsima, bandeko bamonaki banzela oyo ezangi likama, longwa na Allemagne tii na Géorgie.
Bilendiseli ya elimo eyei na ntango oyo ebongi
Ntango kimya ekɔtaki mwa moke na makambo ya politiki na 1995, Batatoli bazwaki bibongiseli ya kosala liyangani ya etúká ya liboso. Na prɛnta ya mobu 1996, bato soki 6 000 bautaki na Géorgie mobimba bayanganaki na mayangani na bisika misato: Gourie, Marneuli, mpe na Tsnori.
Baoyo bayanganaki na liyangani oyo esalemaki na Gourie babosanaka yango te. Liyangani yango ekesanaki mpenza na Ekaniseli, mpo ndako ya kosala Ekaniseli ezalaki monene kasi bandeko bayebaki te soki bato bakotondisa yango! Bato oyo basengelaki koyangana na liyangani yango bazalaki koleka 2 000, kasi bazwaki te esika ya monene mpo na kosala liyangani yango. Yango wana bazwaki ekateli básala yango libándá, na ngomba moko kitoko oyo ezalaki mosika te na engumba.
Ndeko Kako Lomidze, oyo azalaki na Komite ya liyangani, alobi boye: “Nsima ya liyangani, bandeko basi ná mibali balekisaki ntango esika moko, bazalaki koyemba mpe kosepela. Emonanaki polele ete bolingo nde esangisaki basaleli ya Nzambe.”
Bibongiseli ya malamu esalaki ete bokoli emonana
Na ebandeli ya mobu 1996, bibongiseli ezwamaki ete bakɛngɛli-batamboli bábanda kotala lisangá mokomoko na boumeli ya pɔsɔ mobimba. Mpo na kokokisa mokano yango, baponaki bakɛngɛli-batamboli ya sika, longola baoyo bazalaki kosala mosala yango na ɛsti mpe na wɛsti ya Géorgie.
Na ntembe te, “mosala ya bolingo” mpe ya sembo oyo bakɛngɛli-batamboli wana basalaki esalisaki masangá ekola mpe elanda malako ya Teokrasi malamumalamu. (1 Tes. 1:3) Kobanda 1990 tii 1997, bokoli ezalaki makasi mpenza. Na 1990, basakoli 904 bapesaki lapolo na bango ya mosala ya kosakola, kasi nsima ya mbula nsambo mpamba, basakoli 11 082 bazalaki kosakola nsango malamu!
Bokoli ya elimo oyo ebandaki bambula mingi liboso emonanaki sikoyo polele na mboka mobimba. Kasi, mapamboli mosusu ya Yehova ezalaki kozela basaleli na ye ya Géorgie.