Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

GÉORGIE

Banda kala wana bozalaki wapi?

Artur Gerekhelia

Banda kala wana bozalaki wapi?
  • ABOTAMAKI NA 1956

  • BATISIMO 1991

  • NA MOKUSE Kaka sanza mwambe nsima ya kozwa batisimo, atikaki ndako na ye mpe mosala oyo ezalaki kopesa ye mbongo mingi mpo na kosakola na esika mposa ezalaki makasi.

NAUTAKI kozwa batisimo sika ntango bankulutu batunaki ngai soki nakosepela kosala mingi na mosala ya kosakola. Na mokolo ya 04/05/1992, nayanganaki na likita moko ya ntina mingi oyo ebongisamaki mpo na baoyo bazalaki na mposa ya kokende kosala esika mposa ezalaki makasi. Mokolo oyo elandaki, ngai ná moninga na ngai ya mosala ya kosakola tokendaki na libongo ya Batoumi na etúká ya Adjarie.

Mbala ya liboso oyo nasakolaki na Batoumi, nazalaki kobanga. Namitunaki, ‘Nakobanda lisolo na bato ndenge nini?’ Nakamwaki maloba ya mama ya liboso oyo nakutanaki na ye; alobaki boye: “Banda kala wana bozalaki wapi?” Azalaki na mposa makasi ya koyeba makambo mingi etali Batatoli, yango wana kaka mokolo oyo elandaki tobandaki koyekola na ye Biblia!

Liboso tókende na Batoumi, tozwaki liste ya baadrɛsi ya bato oyo basepelaki. Lokola toyebaki engumba yango malamu te, totunaki bato bálakisa biso nzela. Bato mingi bazalaki kokoka te kolakisa biso nzela mpo babalabala mingi ezwaki bankombo ya sika, kasi basepelaki na nsango na biso. Eumelaki te, tokómaki kotambwisa boyekoli ya Biblia na bituluku ya bato 10 tii 15.

Kaka sanza minei nsima ya kokóma na biso, bato koleka 40 babandaki koyangana mbala na mbala na makita. Na yango, tomitunaki boye: ‘Banani bakolandela bato oyo?’ Na nsima, matata oyo ebimaki kati na basoda ya Géorgie ná batomboki na engumba Abkhazie esalaki ete bandeko nyonso ya lisangá na biso ya kala báya na Batoumi. Na mokolo moko mpamba, lisangá ya sika oyo ezalaki na bankulutu ya makoki mpe babongisi-nzela esalemaki!