GÉORGIE | 1991-1997
“Nzambe azalaki kokolisa.” —1 Ko. 3:6.
EKÓLO Géorgie ezwaki lipanda na 1991, mbula oyo Union Soviétique ekabwanaki. Kasi eumelaki te, mbongwana na makambo ya politiki mpe kobendana ya bana-mboka esalaki ete bomoi ekóma mpenza mpasi. Genadi Gudadze, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na ntango wana alobi ete bato bazalaki kotɛlɛma na molɔngɔ ata mokolo mobima mpo na kozela bilei.
Na boumeli ya ntango wana, mbala mingi Batatoli ya Yehova bazalaki kosakola nsango ya Biblia epai ya bato oyo bazalaki kozela na molɔngɔ. Genadi alobi boye: “Na bambula wana ya mpasi, emonanaki lokola moto nyonso azalaki kosepela na solo. Tozwaki bakarte ebele oyo ezalaki na baadrɛsi ya bato oyo bazalaki na mposa ya koyekola Biblia.”
Na nsuka ya likita nyonso, bankulutu bazalaki kotánga bankombo mpe baadrɛsi ya bato oyo basɛngaki tókende kotala bango. Basakoli bazalaki kondima kokende kotala bato yango.
Ndeko Levani Sabashvili, oyo azalaki nkulutu na Tbilissi, azali koyeba lisusu mwasi ná mobali moko oyo basɛngaki tókende kotala bango. Alobi boye: “Basakoli bazwaki baadrɛsi nyonso, kasi ata mosakoli moko te andimaki kokende kotala mwasi ná mobali yango. Bazalaki kofanda mosika mpe mingi na biso tozalaki na bato mingi ya koyekola na bango Biblia.”
Mwa basanza na nsima, mwasi ná mobali yango basɛngaki lisusu tókende kotala bango. Basɛngaki lisusu mpo na mbala ya misato, kasi na mbala oyo bakomelaki Batatoli na mokanda ete báboya ngambo ya makila. (Mis. 20:26, 27) Ndeko Levani alobi boye: “Ezalaki eleko ya bafɛti ya nsuka mbula mpe mbala mingi tozalaki kolinga te kokende kotala bato na eleko yango. Kasi tomonaki ete tokokaki lisusu te kopusa mikolo ya kokende kotala bango.”
Roini ná Nana Grigalashvili, mwasi ná mobali yango oyo bazalaki mpenza na mposa ya bilei ya elimo, bakamwaki makasi ntango bamonaki ndeko Levani mpe ndeko mosusu na ntɔngɔ moko boye liboso ya porte na bango atako malili ezalaki makasi. Babandaki mbala moko koyekola Biblia. Roini ná Nana mpe bana na bango bazali lelo babongisi-nzela ya sanza na sanza.
Basalaki milende mpenza mpo na koluka baoyo basepelaki na solo
Lokola bazalaki mpenza na botɔndi, baoyo basepelaki na solo, bapesaki mpenza ntango, makasi mpe biloko na bango mpo na kosakwela basusu nsango malamu. Atako Badri ná Marina Kopaliani bazalaki na mikumba ya libota, bazalaki na kati ya baoyo basalaki mibembo na bamboka ya mosika mpo na kosalisa bato ya mitema sembo.
Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, Badri ná Marina elongo na bana na bango Gocha ná Levani oyo bazalaki bilenge, bazalaki komibongisa mpo na mibembo na Douchéti, etúká moko kitoko ya ngombangomba na nɔrdi ya Tbilissi. Ntango mosusu, bazalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 150 na banzela ya mipɛpɛ mpo na kokóma na bamboka ya mosika.
Mokolo moko, mwasi moko abengisaki Badri ná mwasi na ye esika asalaka. Badri alobi boye: “Tokɔtaki na ndako oyo bato soki 50 bazalaki kozela biso! Liboso nakamwaki, kasi nsima ya kobondela Yehova, nasalelaki Matai 24 mpo na kosolola na bango makambo etali mikolo ya nsuka. Moto moko akamwaki mpe atunaki, ‘Mpo na nini basango na biso bayebisaka biso makambo oyo te?’”
Ekaniseli ebendaki likebi ya bato
Ekaniseli ya liwa ya Yesu epesaki bato mingi ya Géorgie libaku ya koyoka nsango malamu. Na ndakisa na 1990, Ekaniseli oyo esalemaki na ndako ya ndeko Ia Badridze na Tbilissi ebendaki likebi ya bato ya kartye.
Ndeko Badridze asɛngaki ete Ekaniseli esalema na ndako na ye. Ye ná bana na ye balongolaki biloko na salɔ mpo esika ezala monene. Kasi alingaki kozwa bakiti wapi mpo na bapaya? Na Géorgie, mbala mingi bato bazalaki kofuta mwa mbongo mpo na kozwa bakiti mpe bamesa mpo na bafɛti ya minene. Lokola afutaki mbongo kaka mpo na bakiti, bankóló bakiti yango batunaki ye boye: “Okozwa bamesa te? Bongo bokolya ndenge nini?”
Ndeko Badridze abongisaki ndako na ye oyo ezali na etaje ya 13 mpo na koyamba bato nyonso oyo bayaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Likambo ya kokamwa bato 200 bayaki! Na ntembe te bato mingi ya kartye yango batunaki mituna na ntina etali Batatoli ya Yehova.
Ekaniseli oyo etiká nsango
Na 1992, bafutaki mbongo mpo na kosala Ekaniseli na bandako ya minene na bisika ndenge na ndenge ya ekólo yango. Davit Samkharadze, oyo azalaki kofanda na Gourie, amonisi ndenge mokɛngɛli-motamboli atunaki bango mpo na ebongiseli oyo bazwaki mpo na Ekaniseli.
Ntango mokɛngɛli yango ayokaki ete basakoli bazalaki koluka kosala Ekaniseli na ndako moko ya moke, atunaki boye: “Ndako ya monene ezali te na engumba? Bokoki kofuta mbongo te mpo bózwa yango?” Lokola ndako yango ekokaki koyamba bato koleka 1 000, bandeko bamonaki te ntina ya kofuta mbongo mpo na ndako yango mpo bazalaki kaka basakoli 100.
Mokɛngɛli apesaki likanisi oyo: “Soki mosakoli mokomoko abengisi ata bato zomi, bakiti nyonso ekotonda.” Ata soki na ebandeli likanisi wana emonanaki lokola ekosimba te, basakoli basalaki makasi bálanda yango. Likambo ya kokamwa mpe ya esengo, bato koleka 1 036 bayanganaki na Ekaniseli! *
Babongisi-nzela ya molende basakoli na bateritware ya sika
Na 1992, ezalaki naino na bitúká mosusu ya Géorgie oyo Batatoli ya Yehova basakolá te. Ndenge nini bakokaki kosakola na bateritware yango na ntango oyo nkita ya ekólo yango ebebaki mpenza?
Tamazi Biblaia, oyo azalaki kofanda na Wɛsti ya Géorgie na ntango wana, alobi boye: “Mokɛngɛli-motamboli asalaki likita na mwa bandeko kati na biso mpo na kolobela oyo tokoki kosala. Toyebaki mpenza te ndenge mosala ya mobongisi-nzela monene esalemaka. Kasi toyebaki ete nsango malamu esengelaki kosakolama na lombangu.” (2 Tim. 4:2) Yango wana, baponaki babongisi-nzela 16 mpe batindaki bango na bisika ndenge na ndenge ya ekólo.
Na sanza ya mitano ya mobu 1992, likita moko ya ngonga misato esalemaki na Tbilissi mpo na kolendisa babongisi-nzela oyo batindaki bango básakola na boumeli
ya sanza mitano na bateritware yango. Sanza nyonso bankulutu bazalaki kokende kotala babongisi-nzela yango mpo na kolendisa bango na elimo mpe kopesa bango biloko oyo bazali na yango mposa.Babongisi-nzela mibale ya basi, Manea Aduashvili ná Nazy Zhvania, batindamaki na engumba Ozourgéti. Manea, oyo azalaki na mbula 60 na ntango wana, alobi boye: “Toyebaki ete mwasi moko na engumba Ozourgéti azalaki kosepela na solo. Na yango, ntango kaka tokómaki kuna, tolukaki kokutana na ye. Ntango tokómaki na ndako na ye, azalaki kozela biso mpe abengisaki bato mosusu soki 30. Mokolo yango tobandaki koyekola na bato mingi Biblia.”
Na basanza oyo elandaki bokoli emonanaki. Kaka nsima ya sanza mitano, bato 12 bamonisaki mposa ya kozwa batisimo.
Ezaleli na bango ya komipimela ebimisaki matomba
Babongisi-nzela mibale ya mibali, Pavle Abdushelishvili ná Paata Morbedadze, batindamaki na engumba
Tsageri. Ezali na etúká oyo mimeseno ya kala esanganá na mateya ya bokristo.Ntango eleko ya malili ekómaki pene, mosala ya babongisi-nzela oyo batindamaki mpo na sanza mitano ekómaki na nsuka mpe babengisaki Paata esika mosusu mpo apesa mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda. Yango wana Pavle asengelaki kozwa ekateli. Alobi boye: “Nayebaki ete kolekisa eleko ya malili na Tsageri ekozala mpasi. Kasi, bayekoli na biso ya Biblia bazalaki na mposa makasi ya lisalisi, yango wana nazwaki ekateli ya kotikala.”
Pavle alobi boye: “Nafandaki na libota moko. Nazalaki kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola. Na mpokwa nazalaki kofanda zingazinga ya bakoni ya mɔtɔ elongo na bato ya libota yango na salɔ. Kasi, soki ntango na ngai ya kolala ekoki, nazalaki kolata ekɔti na ngai oyo ezwi mwa mɔtɔ mpe komata na shambrɛ na ngai mpo na kolala na nse ya bolangeti.”
Ntango bankulutu bakendeki kotala Pavle na eleko ya molunge, bato 11 bakokisaki masɛngami mpo bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Eumelaki te bango nyonso bazwaki batisimo.
^ par. 20 Na 1992, ekólo Géorgie ezalaki na basakoli ya molende 1 869 mpe bato 10 332 bayanganaki na Ekaniseli.