Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

GÉORGIE

Bolingo ya solosolo ya bokristo esilaka soki moke te

Bolingo ya solosolo ya bokristo esilaka soki moke te

Igor: Biso nyonso mibale tozalaki na etuluku ya Batatoli ya Yehova ya engumba Tkvarcheli, na Abkhazie. Lokola lisangá oyo ezalaki kotambwisa etuluku na biso ezalaki na kilomɛtrɛ soki 85 mosika na engumba Djvari, sanza nyonso nazalaki kokende na Tkvarcheli mpo na kozwa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpo na etuluku oyo ezalaki mosika. Na 1992, mwa moke nsima ya kokwea ya Union Soviétique, Abkhazie, etúká oyo ezalaki na bonsomi elukaki kokabwana. Etumba ebimaki kati na batomboki mpe basoda ya Géorgie mpe yango ekɔtisaki mpasi makasi.

Gizo Narmania ná Igor Ochigava

Bandeko mibali oyo mibale basalaki elongo mpo na kosalisa bandeko na bango na boumeli ya bitumba na Abkhazie.

Gizo: Nazwaki batisimo na mbula 21, mbula moko kaka liboso matata ebanda. Ntango etumba ebandaki, bandeko bakómaki kobanga mpe bayebaki lisusu te básala nini mpo na kosakola. Kasi Igor, oyo azali ntango nyonso mobateli ya mpate ya malamu, alendisaki biso na maloba oyo: “Sikoyo nde ntango oyo bato bazali na mposa ya libɔndisi. Tokotikala makasi na elimo kaka soki tokobi kosakola.” Yango wana na mayele nyonso, tokobaki mokolo na mokolo kosakwela bato ya kartye nsango ya kobɔndisa oyo euti na Liloba ya Nzambe.

Igor: Mpo na matata yango, likoki ezalaki te ya koleka na nzela oyo tomesanaki koleka mpo na kozwa mikanda na engumba Djvari. Lokola nakolaki na etúká yango, namonaki nzela moko oyo nakokaki koleka kozanga likama, na bilanga ya ti mpe na bangomba. Kasi likama ya kokutana na etuluku ya basoda to konyata esika bakundaki mine ezalaki kaka. Kasi naboyaki kotya bomoi ya bandeko na ngai na likama, yango wana ngai moko nazalaki kosala mobembo mbala moko na sanza. Na lisalisi ya Yehova, nazalaki komibongisa ntango nyonso mpo na kozwa bilei ya elimo na ntango ebongi, mpe esalisaki biso tótikala makasi na elimo.

Atako bitumba ezalaki te na Tkvarcheli, kasi banzela na mboka na biso ekangamaki, yango esalaki ete tóyoka mpasi oyo bitumba ebimisaki. Etikalaki moke eleko ya malili makasi ebanda, bilei ekómaki kosila mpe biso nyonso tokómaki kobanga soki tokobika ndenge nini. Tosepelaki mpenza ntango toyokaki ete bandeko na biso na Djvari bamibongisaki mpo na kosalisa biso!

Gizo: Mokolo moko, Igor atunaki libota na ngai soki bakoki kosalela ndako na biso mpo na kobomba mpe kokabola bilei oyo bandeko babongisaki. Azalaki komibongisa mpo na kozwa biloko na Djvari. Tozalaki komitungisa mpo na bomoi na ye mpo toyebaki ete asengelaki koleka na bisika ndenge na ndenge oyo bakotala soki amemi biloko nini mpe akoki kokutana na basoda mpe miyibi.Yoa. 15:13.

Mwa mikolo na nsima, tosepelaki mpenza ntango azongaki kozanga likama, ayaki na motuka oyo ezalaki na ebele ya bilei oyo tokokaki kolya na boumeli ya basanza oyo elandaki, ya eleko ya malili! Na bantango wana ya mpasi, tomonaki mpenza ete bolingo ya solosolo ya bokristo esilaka soki moke te.1 Ko. 13:8.