Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteyelo ya babongisi-nzela pene na engumba Zugdidi

GÉORGIE | 1998-2006

Mapamboli na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi.’—2 Tim. 4:2.

Mapamboli na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi.’—2 Tim. 4:2.

KOBANDA na nsuka ya bambula ya 1990 tii lelo, motángo ya Batatoli ya Yehova mpe ya bato oyo basepelaka na mateya ya solo na ekólo Géorgie ezali se komata. Na 1998, bato koleka 32 409 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo.

Kasi, basakoli mingi, ata mpe bankulutu, bazalaki bato ya sika na kati ya solo mpe bayebaki naino makambo mingi te. Mingi na bango bazalaki na mposa ya formasyo na makambo ndenge na ndenge oyo etali lisangá. Kasi ndenge nini bakokaki kozwa formasyo yango?

Ebongiseli ya Yehova esalisi mingi

Ndeko Tüngler Arno, ná mwasi na ye Sonja, oyo bazwaki diplome na Eteyelo mosusu ya Gileade na Allemagne, batindamaki na Géorgie na sanza ya misato 1998. Kaka na mbula yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki kofungola Biro ya mosala na Géorgie, oyo filiale ya Russie ezalaki kotambwisa.

Eumelaki te, Komite ya ekólo ebandaki kotambwisa mosala ya kosakola. Ntango kaka Leta endimaki mosala na biso, filiale ya Allemagne ekómaki kotinda mikanda na biso na Géorgie. Bonsomi oyo Leta epesaki efungolaki mpe nzela mpo tósomba mapango mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe bandako ya filiale.

Ntango ya kopesa bandeko formasyo na makambo ya elimo

Basakoli mingi bazalaki te na likoki ya kosakola ndako na ndako na ndenge ya polele, na boumeli ya bambula mingi ya epekiseli na boyangeli ya Bakoministe. Ndeko Arno Tüngler alobi: “Basakoli mingi bazalaki kopesa litatoli na balabala, kasi bango nyonso te nde bamesanaki kosakola ndako na ndako, mpe kolandela bato oyo basepelaki na nsango malamu.”

Arno ná Sonja Tüngler

Ndeko Davit Devidze, oyo abandaki kosala na Biro ya ekólo oyo eutaki kofungwama na sanza ya mitano ya mobu 1999, alobi: “Mosala ya kosala ezalaki mingi, ezala na mosala ya kosakola to na Betele. Ezalaki na makambo mingi oyo tozalaki kotánga na mikanda, kasi tozalaki koyeba te ndenge ya kosalela yango. Yango wana, tozalaki kotala malamumalamu mpe koyekola epai ya bandeko oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezalaki kotinda.”

Bandeko ya Géorgie babandaki kozwa formasyo moko oyo esengelaki koumela ntango molai. Kasi, kaka ndenge ezalaka mpo na bandeko oyo bakendaka kosakola esika mposa ezali mingi, ezala moto oyo azali kopesa formasyo to baoyo bazali kozwa yango, bango nyonso bazwaka matomba. (Mas. 27:17) Na yango, ata bandeko oyo bayaki kosalisa bayekolaki makambo mingi epai ya bandeko ya ekólo yango.

Batatoli ya ekólo yango bamonisaki bizaleli malamu

Ndeko Arno ná mwasi na ye Sonja babosanaka te ndenge oyo bandeko bayambaki bango na esengo mokolo oyo bakómaki na Géorgie. Bandeko basi mpe mibali ya ekólo yango basalaki nyonso mpo na kosalisa bango bámesana na teritware na bango ya sika.

Ndeko Sonja abosanaka te ezaleli na bango ya kokaba. Alobi boye: “Ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki kofanda pene na biso bazalaki komemela biso bilei ya malamu mpenza. Ndeko mwasi moko abimaki na biso na mosala ya kosakola, alakisaki biso lisangá na biso ya sika, mpe ayebisaki biso makambo mingi oyo etali mimeseno ya bato ya Géorgie. Ndeko mwasi mosusu amonisaki motema molai mpo na koyekolisa biso monɔkɔ ya Géorgien.”

Ndeko Warren Shewfelt ná mwasi na ye Leslie, oyo bautaki na Canada mpe batindamaki na Géorgie na 1999, alobi boye: “Bolingo oyo bandeko basi mpe mibali ya ekólo Géorgie bamoniselaki biso esepelisaki biso mingi mpe esalisaki biso tómikitisa. Bango nyonso, ata mpe bilenge, bazalaki komonisa mayoki na bango polele mpe kolingana.”

Na Biro ya ekólo, bandeko ya ekólo basalaki elongo na bamisionɛrɛ oyo bamesanaki na mosala

Bandeko ya bikólo mosusu oyo batindamaki na Géorgie bazalaki te kotya makanisi kaka na mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango kuna; bazalaki kotya makanisi nde na bizaleli malamu ya bato ya ekólo yango. Longola yango, ezaleli ya komikitisa mpe bolingo oyo bamisionɛrɛ bazalaki komonisa esalaki ete bandeko ya Géorgie básepela na bango nokinoki.

Bato oyo babangaka Nzambe bayambi solo

Na boumeli ya bambula ya 1990, bato mingi ya mitema sembo bakobaki koyamba solo. Kaka na 1998, bato 1 724 bazwaki batisimo. Nini esalisaki bato mingi ya Géorgie básepela na solo?

Ndeko Tamazi Biblaia, oyo azalaki mokɛngɛli-motamboli na boumeli ya bambula mingi, alobi boye: “Bato mingi ya ekólo yango balingaka Nzambe. Yango wana, ntango tozalaki koyebisa bango nsango ya Biblia, bazalaki koyamba yango na mposa makasi.”

Ndeko Davit Samkharadze, oyo azali molakisi na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, alobi boye: “Ntango moto abandi koyekola Biblia, mbala mingi bato ya libota na ye mpe baninga ya kartye bapekisaka ye. Lokola balukaka kopekisa moyekoli akoba koyekola Biblia, nsukansuka, bayekoli mingi bakataka boyekoli ya Biblia bango moko!”

Lokola nsango ya Bokonzi epalanganaki, ebongolaki bomoi ya bato ebele. Na sanza ya minei 1999, bokoli emonanaki mingi, mpamba te mpo na mbala ya liboso, bato 36 669 bayanganaki na Ekaniseli.

“Batɛmɛli bazali mingi”

Mpo na mosala na ye ya kosakola na Efese, ntoma Paulo akomaki boye: “Porte monene, oyo ezali kopesa nzela na mosala, efungwami liboso na ngai, kasi batɛmɛli bazali mingi.” (1 Ko. 16:9) Maloba na ye emonisi mpenza makambo oyo Batatoli ya Yehova ya ekólo Géorgie bakutanaki na yango mwa basanza nsima ya Ekaniseli ya 1999.

Na sanza ya mwambe 1999, etuluku moko ya bato ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse oyo bazali na molende ya koleka ndelo, oyo Vasili Mkalavishvili, sango moko oyo balongolá azalaki kokamba, basalaki likita moko monene na Tbilissi mpe batumbaki mikanda na biso na miso ya bato nyonso. Yango ebandisaki minyoko makasi oyo eumelaki mbula minei.

Kobanda na 1999, bazalaki konyokola, kotɛmɛla, mpe kotumba mikanda ya Batatoli ya Yehova na Géorgie

Na mokolo ya 17/10/1999, bato mosusu oyo bazalaka na molende ya koleka ndelo na makambo ya losambo basanganaki na etuluku moko ya bato soki 200 mpe bapanzaki makita ya lisangá ya Gldani na Tbilissi. Bato yango oyo bazalaki na banzete mpe bikulusu ya bibende, babandaki kobɛta bayangani, mpe bandeko mingi bakɔtaki na lopitalo.

Likambo ya kokamwa, bakangaki te bato oyo bazalaki konyokola Batatoli, mpe bato yango bakobaki konyokola bandeko. Bakonzi mingi ya guvɛrnema, ezala mpe Prezida Shevardnadze, basepelaki te na makambo ya mobulu oyo basalelaki Batatoli, kasi basalaki eloko moko te. Kutu, mbala mingi bapolisi bazalaki kokóma na esika oyo likambo esalami nsima ya ntango molai.

Kaka na ntango yango, Guram Sharadze, moto moko ya politiki na Géorgie, abandisaki kampanye moko monene mpo na kotɛmɛla Batatoli ya Yehova. Apanzaki nsango ete Batatoli ya Yehova bazali likama mpo na ekólo. Emonanaki lokola ete “eleko ya malamu” mpo na kosakola nsango malamu esili.

Ndenge oyo ebongiseli ya Yehova esalaki na ntango ya botɛmɛli

Ebongiseli ya Yehova ezwaki bibongiseli nokinoki mpo na kosalisa Batatoli ya Yehova na Géorgie. Bapesaki bandeko malako mpo na oyo bakoki kosala soki balingi konyokola bango to kobimisela bango mobulu. Bakundwelaki mpe bango ntina oyo ntango mosusu esɛngaka ete bakristo ya solo báyika mpiko na minyoko.2 Tim. 3:12.

Longola yango, ebongiseli ya Yehova esalaki ete bandeko oyo bayebi mibeko básamba na tribinale mpo na bolamu ya bandeko. Ndeko moko oyo azalaki kosala na Departema ya Mibeko na filiale ya Géorgie, alobi boye: “Na boumeli ya mbula minei, tosilisaki badosye koleka 800 na makambo oyo bato ya Vasili Mkalavishvili babimiselaki bandeko. Tosɛngaki lisalisi ya bibongiseli mosusu ya Leta mpe bibongiseli oyo etalelaka ntomo ya bato. Biro monene ya Batatoli ya Yehova esalaki kampanye mpo likambo yango eyebana, atako bongo, batikaki konyokola bandeko te.” *

^ par. 30 Mpo na koyeba makambo mosusu etali milende oyo bandeko basalaki mpo na kozwa bonsomi ya losambo, talá Lamuká! ya 22/01/2002, nkasa 18-24 (na Lifalanse).