Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

GÉORGIE

Bakanisaki Mozalisi na bango Monene

Bakanisaki Mozalisi na bango Monene

Bandeko mingi oyo touti kotánga masolo na bango na buku oyo bazali bilenge, oyo ‘bakanisaki Mozalisi na bango Monene na mikolo ya bolenge na bango.’ (Mos. 12:1) Kutu, na babongisi-nzela 3 197 oyo bazali na Géorgie, mingi na bango bazali na mbula 25 to bazali bilenge. Mpo na nini ebele ya bilenge wana na Géorgie bazali komipesa na solo?

Emonani ete ezali na bantina mingi oyo esali ete bámipesa bongo. Moko ya bantina ezali ete na Géorgie, bato bazalaka na boyokani makasi na kati ya mabota. Ndeko Konstantine, oyo abɔkɔlaki bana mitano na kati ya solo alobi boye: “Eloko ebendaki ngai na losambo ya solo ezalaki koyeba ete Yehova azali Tata ya bolingo. Ntango ngai moko nakómaki tata ya bana, mokano na ngai ezalaki ya kosalisa bana na ngai bábangaka te kopusana pene na ngai.”

Ndeko Malkhazi ná mwasi na ye, oyo bazali na bana misato, basalaka milende mingi mpo libota na bango ezala na boyokani malamu. Alobi boye: “Ntango mosusu, tosɛngaka bana na biso báyebisa biso makambo oyo basepelaka na yango epai na biso mpe bandeko na bango. Na nsima, tosɛngaka bango bálobela makanisi yango na losambo na kati ya libota. Kosala bongo esalisaka bango bámonaka makambo ya malamu epai ya basusu mpe básepela na bango.”

“Sikoyo nazali mpenza na bomoi ya esengo!”

Mpo na kosalisa baboti na likambo ya kopesa formasyo, bankulutu bapesaka bilenge misala mosusu na lisangá ntango bazali naino bana mike. Ndeko Nestori, oyo azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 11, alobi boye: “Bankulutu bapesaki ngai mikumba mingi ya mikemike ntango nazalaki naino elenge mpenza. Yango esalisaki ngai namona ete nazali mpenza na esika na kati ya lisangá.”

Ndakisa malamu mpe lisalisi ya bankulutu ezali mpe na ntina mingi. Ndeko Koba, oyo azali moko ya bandeko ya Nestori, alobi boye: “Na bokeseni na bandeko na ngai, nazalaki mobulu makasi ntango nazalaki kokola. Nkulutu moko ya elenge, oyo azalaki ndakisa malamu mpo na ngai, azalaki ntango nyonso komitya na esika na ngai mpe azalaki kokanisela ngai mabe te. Asalisaki ngai mingi mpo nazongela Yehova.”

Lelo oyo, Nestori ná Koba, elongo na ndeko na bango ya mwasi, Mari, bazali kosala elongo na teritware moko ya mosika. Ndeko Koba alobi boye: “Sikoyo nazali mpenza na bomoi ya esengo!”

“Bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo”

Biro ya filiale esalaka makasi mpo na kolendisa baboti bápesaka bana na bango formasyo, na ndenge ekɔtisaka mpe bilenge bakristo na misala mosusu ya teokrasi. Ndeko moko ya Komite ya filiale alobi boye: “Tosepelaka mingi na bilenge na biso, yango wana tosalisaka bango ntango bazali kosala makasi mpo na kokokisa mikano na bango ya elimo.”

Batatoli ya Géorgie basalaki elongo na bandeko ya mikili ndenge na ndenge mpo na kotonga Ndako ya Mayangani na Tbilissi

Kosala elongo na bandeko oyo bakɔmeli na elimo mpe kosala boninga na bango etindaka bilenge básala makambo ya malamu. Ndeko Mamuka, oyo asalaki elongo na bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga na mikili mosusu ntango bazalaki kotonga Ndako ya mayangani na Tbilissi, alobi boye: “Kosala elongo na bandeko ya mikili mosusu epesaki ngai mabaku mingi ya koyekola epai ya basusu. Longola koyekola misala ndenge na ndenge, nayekolaki mpe makambo mingi ya elimo.”

Boyokani malamu na libota, bilendiseli ya bankulutu, mpe ndakisa malamu ya bandeko esalisaki mpenza bilenge mingi na Géorgie. Baboti na bango bamiyokaka lokola ntoma Yoane, oyo akomaki ete: “Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”3 Yoa. 4.

Milende ebakisami na mosala ya kobongola mikanda

Na 2013, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaki bafiliale nyonso eluka koyeba soki esengeli kobongola mikanda na minɔkɔ mosusu oyo elobamaka na teritware ya filiale na bango. Mokano ezalaki ya kosalisa bato mosusu mingi koleka báyoka nsango malamu na minɔkɔ na bango.

Yango wana, filiale ya Géorgie ezwaki ekateli ya kobongola mikanda mosusu na monɔkɔ ya Svan mpe ya Mingrélien, minɔkɔ mibale oyo ekeseni mingi te na monɔkɔ ya Géorgien, mpe oyo bato mosusu batalelaka yango lokola lolenge mosusu ya monɔkɔ ya Géorgien.

Babongisi-nzela ya molende ya etúká ya Svanétie bakomaki boye: “Bato oyo balobaka monɔkɔ ya Svan basepelaka na makambo ya Nzambe mpe bazalaka na limemya mingi mpo na Biblia. Ata baoyo bazalaki kokakatana mpo na kozwa mikanda na biso na ebandeli, bandimaki kozwa mikanda oyo ebongolami na monɔkɔ ya mboka na bango.”

Basakoli nyonso oyo balobaka monɔkɔ ya Mingrélien basepelaki mingi ntango babandaki kosala makita na monɔkɔ ya mboka na bango. Ndeko Giga, elenge moko mobongisi-nzela, alobi boye: “Sikoyo, nakoki kopesa biyano na makita na maloba na ngai moko. Ezali kosɛnga te ete nabongola naino makanisi oyo nazali na yango na bɔɔngɔ mpo na kopesa eyano.”

Ndeko Zuri, oyo azali nkulutu na lisangá moko ya monɔkɔ ya Mingrélien na Tkaia, amonisi makanisi na ye: “Nakutaná na makambo mingi na bomoi, ezala ya esengo to ya mawa; kasi elelisá naino ngai te. Nzokande, ntango toyembaki nzembo ya Bokonzi na monɔkɔ ya Mingrélien na makita mpo na mbala ya liboso, bayangani nyonso babimisaki mai ya miso, ezala mpe ngai.”

Makambo minene oyo euti kosalema

Likambo monene na lisolo ya Batatoli na Géorgie esalemaki mokolo ya 06/04/2013, ntango ndeko David Splane, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki diskur ya bofungoli ya bandako ya filiale oyo bautaki kobongisa mpe koyeisa monene, Ndako ya Mayangani, mpe ndako ya sika mpo na Biteyelo ya Biblia. Batatoli mingi ya ekólo yango bayambaki na esengo mpenza bandeko 338 oyo bautaki na mikili 24.

Mokolo oyo elandaki, ndeko Splane asalaki diskur moko ya ntina mingi liboso ya bato 15 200, oyo mingi na bango balandaki diskur yango na mosika, na koyoka to na bilili na nzela ya Internet, na bisika ndenge na ndenge oyo makita esalemaka na ekólo mobimba. Yango ezalaki likita ya teokrasi oyo esangisaki bandeko ya mikili mingi oyo esalemá naino te na Géorgie. Ndenge oyo bandeko mibali mpe basi balendisanaki mpe esengo oyo bayokaki esimbaki mpenza mitema na bango. Ndeko mobali moko oyo azali naino elenge alobaki boye: “Sikoyo, namoni ndenge oyo bomoi ekozala na mokili ya sika.”

Bofungoli ya filiale na Tbilissi, na 2013

Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá, oyo ekómá kobengama Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, ezali lipamboli monene mpo na basaleli ya Yehova na Géorgie. Kobanda 2013, bandeko koleka 200 basili kozwa diplome na eteyelo yango. Bandeko mingi oyo bakɔtaka na kelasi yango bazalaka na botɔndi mpo na mateya oyo bazwaka kuna, mpe bazalaka na mposa makasi ya kosakola na molende esika nyonso oyo mposa ezali mingi.

“Nazali kosala nyonso mpo nazwa biloko oyo ezali na liboso”

Milende ya basakoli ya Bokonzi ya mpiko oyo babandaki mosala na Géorgie, esalaki ete nsango malamu epalangana na ekólo wana mobimba. Bolingo oyo balingaki Nzambe mpe bazalani na bango, mpiko na bango, mpe milende na bango esalaki ete Yehova apambola bango mingi.

Bandeko mibali mpe basi koleka 18 000 ya Géorgie bazali na esengo ya kokoba na mosala oyo basusu babandisaki mpe kosalisa bazalani na bango bámona nguya ya Liloba ya Nzambe.Flp. 3:13; 4:13.

Bandeko ya Komite ya filiale ya Géorgie: Wayne Tomchuk, Levani Kopaliani, Joni Shalamberidze, Michael Jones