Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nɔrdi ya Svanétie

GÉORGIE

Makambo etali Géorgie

Makambo etali Géorgie

Kobuka mbuma ya vinyo epesaka esengo

Mokili Ekólo Géorgie eyebani mpo na bangomba na yango ya milai oyo bansɔngɛ na yango ezipamaka na banɛjɛ, mosusu na bolai ya mɛtrɛ koleka 4 500. Ekólo yango ekabwani na biteni mibale: Géorgie ya Ɛsti ná Géorgie ya Wɛsti mpe eteni mokomoko ezali na bitúká ebele mpe na istware na yango, klima, mimeseno, miziki, mabina mpe bilei na yango moko.

Bato Na bato milio pene na 5 oyo bafandaka kuna, mingi na bango bankɔkɔ na bango bazalaki mpenza bankolo mboka yango.

Lingomba Bato mingi basambelaka na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Mpe bato moke (10%) bazali Bamizilma.

Monɔkɔ Monɔkɔ ya Géorgien ekokani ata moke te na minɔkɔ ya bikólo oyo ezali zingazinga na yango. Mikanda ya istware emonisi ete alfabɛ ya monɔkɔ ya Géorgien oyo ekeseni na mosusu nyonso ebimaki liboso kutu Yesu abotama.

Ndenge ya kobikela Bato mingi (50%) basalaka bilanga. Mikolo oyo euti koleka, turisme mpe ekómi kotombola nkita ya Géorgie.

Klima Na Géorgie ya Ɛsti, molunge ezalaka makasi te. Pembenipembeni ya Mbu Moindo, na Géorgie ya Wɛsti, ezalaka mwa molunge mpe mwa malili, yango wana malala, mandarine mpe pamplemuse ebotaka mingi.

Bazali kobuka mbuma ya vinyo na etúká ya Kakhétie

Biloko ya kolya Limpa ezangaka te na mesa ntango bato ya Géorgie bazali kolya. Batumbaka mampa ya mboka na bango na etumbelo ya mampa oyo basalá na mabele. Balambaka mingi elubu ya misuni oyo batyá matiti ya nsolo kitoko mpe biloko oyo epesaka elɛngi na bilei. Basalaka vinyo banda kala mpenza. Balalisaka vinyo na bambɛki ya mabele mpo ekóma masanga. Na mabota mingi, bato basalaka bango moko bilanga ya vinyo mpe basalaka vinyo na bango moko. Ekólo Géorgie ezali na lolenge soki 500 ya nzete ya vinyo ya mboka.

Azali kosala mampa ya mboka