Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

GÉORGIE

“Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema”

Natela Grigoriadis

“Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema”
  • ABOTAMAKI NA 1960

  • BATISIMO 1987

  • NA MOKUSE Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, Natela oyo azalaki mokambi ya magazini moko, asalelaki libaku yango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya konyata na masini mikanda na kobombana.

NA NSUKA ya bambula ya 1980, na makita, kaka ndeko oyo atambwisaka boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli nde azalaki na yango mpe mbala mingi ezalaki zulunalo oyo basali kopi na yango na mabɔkɔ. Nasololaki na ndeko Genadi Gudadze, moko ya bankulutu, mpe napesaki ye likanisi ete tosengeli komeka konyata biso moko na masini bazulunalo yango.

Tii na ntango wana, bandeko bamesanaki kobimisa mwa mikanda na masini ya kosala bafotokopi oyo bango moko basalaki. Mpo na kobimisa mikanda mbala na mbala, esɛngaki bázala na masini ya malamu koleka ya kosala bafotokopi, kozala na moto oyo ayebi kobɛta malamu masini ya kobɛta mikanda, kozala mpe na masini yango ya kobɛta mikanda mpe ebele ya bapapye oyo basalaka na yango bafotokopi. Nzokande, guvɛrnema ezalaki na liste ya biloko nyonso ya imprimeri, ata bapapye mpe bato na bango bazalaki kolandela yango.

Nazwaki masini moko ya kobɛta mikanda na mabɔkɔ epai ya moto moko oyo nayebanaki na ye, oyo azalaki na bamasini ya kala oyo Leta ezalaki lisusu kolandela te. Ndeko na ngai ya mwasi ayebaki kobɛta masini mpe akokaki kosalisa biso. Bandeko basalaki masini ya sika ya kosala bafotokopi mpe bazwaki esika ya kosomba bapapye oyo basalaka na yango bafotokopi. Makambo nyonso ekómaki na molɔngɔ mpe eumelaki te tobimisaki kopi ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Géorgien.

Kasi mokakatano mosusu ebimaki. Mokolo moko, Genadi ayebisaki ngai, “tosengeli koluka esika mosusu ya kozwa bapapye ya kosala bafotokopi.” Amonaki liboke ya bapapye yango na biro moko ya Leta, kasi ye moko akokaki kosomba yango te mpo bakonzi bazalaki kolandela ye. Ndenge nini tokokaki kozwa yango? Nazalaki koloba mbala na mbala: “Ezali mpasi tózwa yango!” Kasi Genadi alobaki na ngai boye: “Tiká koloba ‘ezali mpasi tózwa yango!’ ‘Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema’!”Mat. 19:26.

Nakobaki kokanisa maloba yango, mpe na kobanga nyonso, nakendaki na biro yango ya Leta mokolo oyo elandaki. Yehova akambaki ngai epai ya mwasi moko ya boboto oyo ayebaki kobɛta masini mpe andimaki koyebisa bosɛnga na ngai epai ya mokambi ya biro yango. Mokonzi yango nde mobali na ye! Nakómaki kosomba bapapye yango mbala na mbala na biro yango, mpe na nsima tozalaki lisusu kozanga bapapye te.